Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA ESENGO YA MBULA ELEKI

Bofungoli Betele ya Sri Lanka

Bofungoli Betele ya Sri Lanka

BANDEKO basi mpe mibali ya Sri Lanka, oyo balataki bilamba ya mboka na bango, bayambaki na esengo bandeko 130 oyo bautaki na bikólo 19 mpe bayaki na molulu ya bofungoli Betele ya esanga yango kitoko. Bana bayembaki nzembo ya Bokonzi, mpe bapaya nyonso basepelaki na makambo ya mboka oyo balakisaki bango, bilei ya elɛngi, miziki ya kitoko, mpe bolingo ya bondeko.

Bandako oyo batongaki sika mpe oyo babongisaki lisusu epesamaki na Yehova na mokolo ya pɔsɔ, mwa 11/01/2014; bayangani nyonso 893 balandaki likita yango na likebi mpenza na minɔkɔ misato. Babɛtaki mabɔkɔ makasi ntango ndeko Mark Sanderson ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi atunaki: “Bondimi kopesa bandako oyo ya sika epai ya Yehova Nzambe?”

Mokolo oyo elandaki, bayangani 7 701 balandaki lisolo mokuse ya likita oyo esalemaki mokolo ya pɔsɔ mpe diskur ya kolendisa oyo ndeko Sanderson asalaki. Bandeko balandaki likita yango na bisika mitano na nzela ya video. Mpo na mbala ya liboso, bandeko ya bisika nyonso ya esanga yango bazwaki libaku ya komonana na nzela ya video mpe ya koyemba elongo nzembo ya Bokonzi. Molulu yango oyo etiká nsango epesaki mpenza “esengo monene.”Neh. 12:43.