Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 4

Yesu Kristo azali nani?

Yesu Kristo azali nani?

1. Bomoi ya Yesu ebandaki ndenge nini?

Bizaleli nini ya Yesu esalaki ete bato bábanga te koya epai na ye?​—MATAI 11:29; MARKO 10:13-16.

Na kokesana na moto nyonso, Yesu azalaki na bomoi na likoló lokola ekelamu ya elimo liboso abotama awa na mabele. (Yoane 8:23) Azalaki ekelamu ya liboso ya Nzambe mpe apesaki mabɔkɔ na kozalisama ya biloko mosusu nyonso. Kaka ye nde akelamaki mbala moko na Yehova mpe na ndenge yango abengami Mwana “se moko [ya Nzambe] oyo abotamaki.” (Yoane 1:14) Yesu azalaki mpe molobeli ya Nzambe, yango wana abengami “Liloba.”​—Tángá Masese 8:22, 23, 30; Bakolose 1:15, 16.

2. Mpo na nini Yesu ayaki awa na mabele?

Nzambe atindaki mwana na ye awa na mabele na ndenge alongolaki bomoi na ye na likoló mpe akɔtisaki yango na libumu ya Maria, mwasi moko Moyuda oyo ayebaki naino mibali te. Na yango, tata ya Yesu azalaki moto te. (Luka 1:30-35) Yesu ayaki na mabele (1) mpo na koteya solo na ntina na Nzambe, (2) mpo na kopesa biso ndakisa mpo na ndenge ya kosala mokano ya Nzambe, ata ntango tozali na mikakatano mpe (3) mpo na kopesa bomoi na ye ya kokoka lokola “lisiko.”​—Tángá Matai 20:28.

3. Mpo na nini tozali na mposa ya lisiko?

Lisiko ezali motuya oyo efutami mpo na kosikola moto oyo bakateli ye etumbu ya liwa. (Kobima 21:29, 30) Ntango Nzambe akelaki bato, mokano na ye ezalaki te ete bato bákóma mibange mpe bákufaka. Ndenge nini toyebi yango? Nzambe ayebisaki Adama, mobali ya liboso, ete soki asali “lisumu,” akokufa. Na yango, soki Adama asalaka lisumu te, alingaki kokufa te. (Ebandeli 2:16, 17; 5:5) Biblia elobi ete liwa “ekɔtaki” na mokili mpo na Adama. Na yango, Adama atikelaki bakitani na ye nyonso lisumu mpe etumbu na yango, liwa. Tozali na mposa ya lisiko mpo elongola biso na etumbu ya liwa, oyo Adama atikelá biso.​—Tángá Baroma 5:12; 6:23.

Nani akokaki kofuta lisiko mpo na kosikola biso na liwa? Ntango tokufaka, tofutaka nyongo ya etumbu kaka ya masumu na biso moko. Moto moko te ya kozanga kokoka akoki kofuta nyongo ya masumu ya bato mosusu.​—Tángá Nzembo 49:7-9.

4. Mpo na nini Yesu akufaki?

Yesu azalaki ndenge moko na biso te, ye azalaki moto ya kokoka. Na yango, esengelaki te akufa mpo na masumu na ye, mpo asalaki ata lisumu moko te. Nzokande, Yesu akufaki mpo na masumu ya bato mosusu. Nzambe amonisaki bolingo monene oyo azali na yango mpo na bato na ndenge atindaki Mwana na ye akufa mpo na biso. Yesu mpe amonisaki bolingo mpo na biso na ndenge atosaki Tata na ye mpe apesaki bomoi na ye mpo na masumu na biso.​—Tángá Yoane 3:16; Baroma 5:18, 19.

Talá video Mpo na nini Yesu akufaki?

5. Yesu azali kosala nini sikoyo?

Ntango Yesu azalaki awa na mabele, abikisaki bato ya maladi, asekwisaki bakufi, mpe abikisaki bato oyo bazalaki na likama. Na ndenge yango, amonisaki oyo akosala na mikolo ezali koya mpo na bato nyonso ya botosi. (Matai 15:30, 31; Yoane 5:28) Yesu akufaki, kasi, Nzambe azongisaki ye na bomoi lokola ekelamu ya elimo. (1 Petro 3:18) Na nsima, azelaki na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe tii ntango Yehova apesaki ye nguya ya koyangela lokola Mokonzi na mabele mobimba. (Baebre 10:12, 13) Sikoyo, Yesu azali koyangela lokola Mokonzi na likoló, mpe awa na mabele, bayekoli na ye bazali kosakola nsango malamu na mokili mobimba.​—Tángá Danyele 7:13, 14; Matai 24:14.

Mosika te, Yesu akosalela nguya na ye ya Mokonzi mpo na kosukisa mpasi nyonso mpe baoyo babimisaka mpasi yango. Bato nyonso oyo bazali komonisa kondima epai ya Yesu mpe kotosa ye bakozala na bomoi na paradiso awa na mabele.​—Tángá Nzembo 37:9-11.