Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mapamboli oyo eleki bomɛngo

Mapamboli oyo eleki bomɛngo

JON azalaki kosala mosala oyo ezalaki kopesa ye mbongo mingi na États-Unis. Atako azalaki elenge, asalaki mibembo mingi na mokili mpe akómaki na mbongo mingi. Ye ná mwasi na ye bazalaki na ndako ya kitoko mpe bomoi ya malamu. Bato mingi bazalaki komona ete mobali wana ná mwasi na ye bapambwami.

Tótalela ndakisa mosusu. Kostas * azalaki moko na bato 80 oyo baponamaki na kati ya bato koleka 5 000 oyo balukaki bámeka bango mpo na mwa ntango na mosala na banki moko monene na Mpoto. Nsima ya bambula moke kaka, akómaki komata mpɛtɛ na mosala, mpe nsukansuka akómaki mokonzi na departema ya banki mosusu. Ntango alongwaki na mosala wana mpe afungolaki kompanyi na ye moko, mbongo oyo akómaki kozwa na mbula moko eleki mbongo oyo bato mingi basimbaka bomoi na bango mobimba. Amonaki ete apambwami.

Atako bongo, bato yango bandimi ete ezali na mapamboli oyo eleki bomɛngo ya mokili. Na ndakisa, lelo oyo, Jon akómá koteya bato Biblia mpo na kosalisa bango bápusana penepene na Nzambe. Alobi boye: “Namoni mpenza ete bomɛngo ya mokili epesaka esengo te. Milende oyo moto asalaka mpo na koluka yango mpe kobatela yango etikelaka ye ntango te mpo na makambo mosusu. Nzokande, kotosa mitinda ya Biblia na bomoi ememaka mapamboli mingi, na ndakisa libala ya esengo, kimya ya motema mpe lisosoli ya malamu.”

Kostas mpe amoni bongo: “Nzambe alingaka te tómityela mokano ya konduka bomɛngo. Namonaka mpenza ete soki apesi biso biloko oyo eleki bamposa na biso ya mokolo na mokolo, tosengeli kosalela yango na boyokani na mokano na ye.” Eumeli naino te, Kostas ná libota na ye babandaki koyekola monɔkɔ mosusu mpo na koteya bato mingi mitinda ya Biblia. Alobi boye: “Toyekoli ete kopesa ememaka esengo mingi koleka kozwa.”​—Misala 20:35.

Ya solo, Jon ná Kostas bayekoli ete mapamboli ya elimo ezali na motuya mingi koleka bomɛngo ya mokili. Daniel Gilbert, profesɛrɛ moko ya Iniversite ya Harvard, alobi ete bato oyo bayekolaka maladi ya motó “balekisi bambula mingi mpo na koyekola boyokani oyo ezali kati na bomɛngo mpe esengo, mpe mbala mingi bato yango balobaka ete bomɛngo ebakisaka esengo ntango elongoli bato na bobola mpe ekómisi bango na bomoi ya malamu.” Kasi, abakisaki ete: “Na nsima ebakisaka lisusu esengo te.”

Liteya oyo bato bakokaka koyekola te

Moto moko ya mayele alobaki boye: “Soki moto alongwe na bobola, ata soki akómi na mbongo ebele na nsima, ebakiselaka ye esengo te.” Na ebandeli ya ekeke ya 20, mopanzi-nsango moko azwaki liteya yango ntango asololaki na Andrew Carnegie, moto moko oyo azalaki na kompanyi ya kosala bibende, oyo azalaki moko ya bato oyo bazalaki na mbongo mingi na mokili. Carnegie alobaki na ye boye: “Bólula ngai te. Bomɛngo na ngai ekoki kosalisa ngai na nini? Nakómi na mbula 60 mpe estoma na ngai ekokaka lisusu konika bilei te. Soki esɛngi nasomba bolenge ná nzoto makasi, nakopesa bamilio nyonso oyo nazali na yango.”

Na nsima, mopanzi-nsango yango abakisaki ete: “Carnegie abalukaki mbala moko, mpe na mongongo ya nse mpe ya mawa mpe na ndenge moko oyo nakoki kolimbola te, alobaki ete: ‘Nakosepela kotɛka eloko nyonso oyo nazali na yango mpo nabandela bomoi na ngai.’” Jean Paul Getty, moto mosusu oyo azalaki na mbongo mingi mpo azalaki na bakompanyi ya pétrole, alobaki boye: “Kozala na mbongo elimboli te kozala na esengo. Mbala mosusu kutu, ekoki kopesa moto mpasi.”

Mbala mosusu okondima makanisi ya mokomi ya Biblia oyo asɛngaki Nzambe ete: “Pesá ngai bobola te, bozwi mpe te. Leisá ngai bilei bikoki na ngai, ete natonda te mpe boye nawangana yo te, naloba te ete, [Yehova] azali nani? Soki ete nazala mobola te mpe nayiba te, nabimisa nkombo ya Nzambe na ngai na mpamba te.”​—Masese 30:8, 9.

Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala alobaki boye: “Nakómaki monene mpe nafulukaki koleka bango nyonso bazalaki liboso na ngai na Yelusaleme.” Atako bongo, abakisaki boye: “Nyonso ezalaki bobele bisalasala mpe koluka kozwa mopɛpɛ.” Salomo alobaki mpe ete: “Mapamboli ya [Yehova] ekoyeisa bozwi, akobakisa mawa na yango te.”​—Mosakoli 2:9-11; 5:12, 13; Masese 10:22.

Nzela ya kozwa mapamboli ya seko

Tomoni polele ete tokoki kozwa esengo ya solosolo kaka soki tokokisi malamu bamposa na biso ya elimo. Soki totye Nzambe na esika ya liboso, tokomona ete makambo nyonso ya bomoi na biso ekokóma malamu mpe ekopesa biso esengo mingi.

Likambo ya esengo ezali ete tokobanda komitungisa mpo na mbongo libela na libela te. Biblia elaki ete na mikolo ezali koya, mombongo ya lokoso mpe oyo ezali kolya bato ntango ekolongolama mpo na libela. (1 Yoane 2:15-17) Mokili ya sika ya Nzambe oyo ekoya ekoyangelama na mitinda na ye ya sembo. Mabelé ekokóma paladiso ndenge Nzambe akanaki yango na ebandeli ntango atyaki mwasi ná mobali ya liboso kuna. Ekozala mpenza lipamboli komona mabelé mobimba etondi na esengo, kimya mpe bolingo!​—Yisaya 2:2-4; 2 Petelo 3:13; 1 Yoane 4:8-11.

Soki totye Nzambe na esika ya liboso, tokozala na bomoi ya esengo

Na ntango wana, bomoi ekozala na mitungisi te. Ntango Nzambe akokokisa mokano na ye ya ebandeli ete bato bázala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé, bato bakozala na biloko nyonso oyo basengeli na yango mpe bamposa na bango ya elimo ekokokisama. Tondimi mpenza ete moto nyonso akozala na bilei oyo ekoki, esika ya kolala mpe mosala ya malamu. Bobola ekolongolama mpo na libela.​—Nzembo 72:16; Yisaya 65:21-23; Mika 4:4.

Moto nyonso azali na kondima epai ya Yehova, Nzambe oyo Biblia elobeli, akosepela na mapamboli oyo Nzambe alaki. (Baloma 10:11-13) Na yango, ezali mpenza likambo ya bwanya soki lelo oyo tozali koluka mapamboli oyo eleki bomɛngo ya mokili!​—1 Timote 6:6-10.

^ par. 3 Oyo ezali nkombo topesi ye kopesa.