Lakisá makambo oyo ezali na kati

Buku oyo okoki kotyela motema​—Eteni 5

Lisolo ya Grɛsi na Biblia

Buku oyo okoki kotyela motema​—Eteni 5

Oyo ezali lisolo ya mitano na masolo nsambo oyo ekokoba kobima na banimero ya “Lamuká!” oyo ezali kolobela bikólo nsambo ya nguya na mokili mobimba oyo Biblia elobeli. Ntina na yango ezali ya komonisa ete Biblia ebongi kotyelama motema mpe ete ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, mpe nsango na yango ezali nsango ya elikya, oyo elobeli nsuka ya mpasi oyo euti na boyangeli mabe ya bato likoló ya baninga na bango bato.

NA SIƐKLƐ ya minei liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Alezandre, elenge moko ya Masedonia, asalaki ete ekólo Grɛsi * eyebana mokili mobimba mpe ekende nsango. Kutu, asalaki ete Grɛsi ekóma ekólo ya mitano ya nguya na mokili mobimba oyo Biblia elobeli, mpe nsukansuka, akómaki kobengama Alezandre Monene. Bikólo ya nguya oyo ezalaki liboso na yango ezalaki Ezipito, Asiri, Babilone, mpe Media ná Perse.

Nsima ya liwa ya Alezandre, ampire na ye ekabwanaki mpe ezalaki lisusu na nguya mingi te. Kasi, mimeseno ya Bagrɛki, monɔkɔ na bango, losambo na bango mpe filozofi na bango, eumelaki mingi ata nsima ya kokwea ya ampire ya Grɛsi.

Bambula soki 200 liboso, bisakweli ya Biblia elobelaki Alezandre Monene.

Lisolo oyo ebongi kotyelama motema

Biblia elobi te ete mosakoli moko ya Nzambe azalaki kosakola ntango Grɛsi ezalaki ekólo ya nguya na mokili mobimba, to mpe ete mokanda moko ya Biblia ekomamaki na ntango wana. Atako bongo, Biblia esakolaki na ntina ya ekólo Grɛsi. Lisusu, Makomami ya Grɛki ya Bokristo, oyo bato babengaka mpe Kondimana ya Sika, elobeli na bisika mingi makambo etali Grɛsi. Kutu, mingimingi na Yisraele, ezalaki na bingumba zomi ya Bagrɛki, oyo ezalaki kobengama Dekapolisi, oyo euti na liloba moko ya Grɛki oyo elimboli “bingumba zomi.” (Matai 4:25; Marko 5:20; 7:31) Biblia elobeli Dekapolisi mbala mingi. Istware ya kala mpe bitiká ya bandako minene ya masano, ya batempelo, mpe ya bapisine ya bato nyonso emonisi mpenza ete bingumba yango ezalaki solo.

Biblia elobeli mpe mbala mingi mimeseno mpe losambo ya Bagrɛki, mingimingi na mokanda ya Misala, oyo ekomamaki na monganga Luka. Tótalela mwa bandakisa:

Ntango Biblia ezali kolobela makambo oyo esalemaki ntango ntoma Paulo akendaki na engumba Atene na mobu 50 ya ntango na biso (T.B.), elobi mpe ete engumba yango ‘etondaki na bikeko.’ (Misala 17:16) Istware emonisi mpenza ete engumba Atene ná bakartye ya zingazinga na yango etondaki na losambo ya bikeko mpe na bisika oyo bato bakendaka kosambela basantu.

Misala 17:21 elobi ete “bato nyonso ya Atene mpe bapaya oyo bazalaki kofanda kuna bazalaki kolekisa ntango na bango ya kozwa mopɛpɛ na eloko mosusu te kaka na koyebisa to koyoka mwa likambo moko ya sika.” Babuku oyo Thucydide mpe Démosthène bakomaki emonisi ete bato ya Atene bazalaki kolekisa ntango mingi na kosolola mpe kobendana na maloba.

Biblia elobi polele ete “Baepikire ná Basetoa, babandaki kosolola na [Paulo] na kotyana ntembe”; kutu bamemaki ye na Areopaje mpo ayebisa bango lisusu makambo ya sika. (Misala 17:18, 19) Engumba Atene eyebanaki mpo na ebele ya bato ya filozofi oyo bazalaki na engumba yango, kati na bango tokoki kotánga Baepikire ná Basetoa.

Etumbelo mpo na nzambe moko oyo ayebani te

Paulo alobelaki etumbelo moko ya engumba Atene, oyo likoló na yango bakomaki “Epai ya Nzambe oyo ayebani te.” (Misala 17:23) Ekoki kozala ete Épiménide, powɛti moko ya Krɛti nde asalaki bitumbelo mpo na nzambe moko oyo ayebani te.

Na diskur oyo Paulo asalelaki bato ya Atene, azongelaki maloba oyo: “Mpo tozali mpe libota na ye.” Alobaki ete maloba yango ezali kaka ya powɛti moko te, kasi ya “bamosusu kati na bapowɛti na bino.” (Misala 17:28) Na ntembe te, bapowɛti yango ya Grɛsi ezalaki Aratus mpe Cléanthe.

Yango wana, moto moko ya mayele asukisaki boye: “Mpo na ngai, lisolo ya mobembo ya Paulo na Atene ekomamaki na moto moko oyo azalaki na Atene mpe amonaki makambo yango na miso.” Tokoki mpe koloba bongo mpo na oyo Biblia elobi na oyo etali makambo oyo Paulo akutanaki na yango na Efese, engumba moko ya Azia Moke. Tii na siɛklɛ ya liboso T.B., bato ya engumba yango bazalaki kaka komipesa na losambo ya bapakano ya Grɛsi, mingimingi losambo ya nzambe-mwasi Artemisi.

Ekeko ya Artemisi, nzambe-mwasi ya Efese

Mokanda ya Misala elobeli mbala mingi tempelo ya Artemisi, oyo ezalaki moko ya makambo nsambo ya kitoko mpe ya kokamwa ya ntango ya kala. Na ndakisa, Biblia elobi ete mosala ya kosakola ya Paulo na Efese esilikisaki Demetriusi, mosali moko ya biloko ya palata, oyo azalaki kosala bandako mike ya losambo ya Artemisi, mosala oyo ezalaki kopesa ye mbongo mingi. Na nkanda nyonso, Demetriusi alobaki boye: “Paulo wana . . . andimisi ebele mpenza ya bato mpe atindi bango bándima likanisi mosusu, alobi: banzambe oyo basalemi na mabɔkɔ bazali banzambe te.” (Misala 19:23-28) Na nsima, Demetriusi atindaki ebele ya bato oyo batondaki na nkanda báganga: “Artemisi ya Baefese azali Monene!”

Lelo oyo, soki okei kotala esika oyo engumba Efese ezalaki, okomona bitiká na yango mpe esika oyo tempelo ya Artemisi ezalaki. Longola yango, makomi ya kala na Efese emonisi ete bikeko yango esalemaki mpo na kokumisa nzambe-mwasi, mpe ezalaki na ekipi moko ya basali ya biloko ya palata na engumba yango.

Bisakweli oyo okoki kotyela motema

Bambula soki 200 liboso ete Alezandre Monene abotama, Danyele, mosakoli ya Yehova, akomaki boye mpo na boyangeli ya mokili mobimba: “Talá! ntaba moko ya mobali euti epai moi elalaka, ezali koya likoló ya mabele mobimba, mpe ezali kosimba mabele te. Kasi ntaba-mobali yango ezalaki na liseke moko oyo ezalaki komonana polele na katikati ya miso na yango. Mpe eyaki tii epai ya mpate-mobali ya maseke mibale, . . . mpe epotaki mbangu na nkanda makasi epai mpate-mobali yango ezalaki. Mpe . . . ebomaki mpate-mobali mpe ebukaki maseke na yango mibale, mpe mpate-mobali ezalaki na nguya te ya kotɛlɛma liboso na yango. Bongo ebwakaki yango na mabele mpe enyataki yango . . . Mpe ntaba-mobali etombolaki mapeka koleka ndelo; kasi ntango kaka ekómaki makasi, liseke monene ebukanaki, mpe maseke minei ebimaki mpe emonanaki polele na esika na yango, etali na ngámbo ya mipɛpɛ minei ya likoló.”​—Danyele 8:5-8.

Biblia esakolaki na bosikisiki ndenge Alezandre akolonga bikólo mosusu mpe ndenge oyo ampire na ye ekokwea

Maloba wana etalelaki banani? Danyele ye moko ayanoli boye: “Mpate-mobali oyo omonaki, oyo ezali na maseke mibale, elakisi bakonzi ya Media mpe ya Perse. Mpe ntaba-mobali oyo etondi na nsuki elakisi mokonzi ya Grɛsi; kasi liseke monene oyo ezalaki na katikati ya miso na yango elakisi mokonzi ya liboso.”​—Danyele 8:20-22.

Kanisá naino! Na ntango oyo Babilone ezalaki nguya ya mokili mobimba, Biblia esakolaki ete banguya mosusu oyo ekolanda ekozala Media ná Perse mpe Grɛsi. Lisusu, ndenge tomoni yango liboso, Biblia elobaki polele ete “ntango kaka ekómaki makasi, liseke monene,” elingi koloba Alezandre, esengelaki ‘kobukana’ mpe na esika na yango maseke minei esengelaki kobima, mpe Biblia ebakisi lisusu ete ata moko te kati na bakonzi yango akozala mwana ya Alezandre.​—Danyele 11:4.

Esakweli wana ekokisamaki na mobimba na yango. Alezandre akómaki mokonzi na mobu 336 L.T.B., mpe na boumeli ya mbula nsambo, alongaki Dariuse III, oyo azalaki mokonzi ya nguya ya ekólo Perse. Na nsima, Alezandre akobaki kokómisa bokonzi na ye monene, tii ntango akufaki wana azalaki naino elenge, na mobu 323 L.T.B., ntango azalaki na mbula 32. Nsima ya Alezandre, moto ata moko te, ezala ata bana na ye, ayangelaki lokola ye. Nzokande, ndenge buku moko (The Hellenistic Age) elobi, bakonzi minei ya basoda na ye​—Lysimaque, Cassandre, Séleucus, mpe Ptolémée—​“bamikómisaki bango moko bakonzi” mpe bayangelaki ampire mobimba.

Ntango Alezandre azalaki kokómisa ampire na ye monene, akokisaki mpe bisakweli mosusu ya Biblia. Na ndakisa, Ezekiele mpe Zekaria, basakoli oyo bazalaki na bomoi na siɛklɛ ya nsambo mpe ya motoba L.T.B., basakolaki kobebisama ya engumba ya Tire oyo ezalaki na mai. (Ezekiele 26:3-5, 12; 27:32-36; Zekaria 9:3, 4) Ezekiele akomaki kutu ete mabanga ná putulu na yango ekotyama “na katikati ya mai mpenza.” Maloba yango ekokisamaki?

Alezandre akokisaki esakweli ya Biblia ntango asalelaki mabanga, babiliki, mpe mabele ya Tire oyo ezalaki na mokili mpo na kotonga nzela tii na Tire oyo ezalaki na esanga

Tótalela likambo oyo basoda ya Alezandre basalaki ntango bakweisaki engumba Tire na mobu 332 L.T.B. Bazwaki mabanga, babiliki, mpe mabele ya engumba Tire oyo ezalaki na mokili, mpe babwakaki yango na ebale mpo na kotonga nzela tii na engumba ya Tire oyo ezalaki na esanga. Mayele yango elongaki, mpe Tire ekweaki. Moto moko oyo akendaki kotala engumba yango na siɛklɛ ya 19 alobaki boye: “Bisakweli oyo elobelaki kobebisama ya Tire ekokisamaki, ata na makambo ya mikemike.” *

Elaka oyo okoki kotyela motema

Atako Alezandre alongaki bikólo mosusu, yango etyaki kimya na mokili te. Nsima ya koyekola lisolo ya boyangeli ya Grɛsi ya ntango ya kala, moto moko ya mayele alobaki boye: “Bomoi ya bato mingi . . . ebongwanaki mpenza te.” Likambo yango, oyo emonanaka mbala na mbala na boumeli ya istware ya bato, emonisi ete maloba oyo ya Biblia ezali solo: ‘Moto ayangelaka moto mpo na komonisa ye mpasi.’​—Mosakoli 8:9.

Kasi boyangeli ya mabe ekoumela libela te, mpamba te Nzambe asili kotya guvɛrnema moko oyo eleki mosika baguvɛrnema ya bato. Guvɛrnema yango, oyo ebengami Bokonzi ya Nzambe, ekozwa esika ya biyangeli nyonso ya bato, mpe bato oyo bakoyangelama na bokonzi yango bakozala na kimya ya solosolo mpe bakobatelama mpo na libela.​—Yisaya 25:6; 65:21, 22; Danyele 2:35, 44; Emoniseli 11:15.

Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe ezali moto mosusu te, kasi Yesu Kristo. Na bokeseni ya bana ya bato oyo balukaka bokonzi na lokoso mpe bakipaka bolamu ya bato te, Yesu azali mokonzi moko oyo alingaka Nzambe mingi mpe alingaka bato mingi. Mpo na mokonzi yango, mokomi ya Nzembo asakolaki boye: “Akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi, mpe moto ya mpasi mpe moto nyonso oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto oyo azangá ná mobola mawa, mpe akobikisa milimo ya babola. Akosikola molimo na bango na monyoko mpe na mobulu.”​—Nzembo 72:12-14.

Okolinga kozala na Mokonzi ya ndenge wana? Soki ezali bongo, ebongi otánga lisolo ya ekólo ya motoba oyo elekaki nguya na mokili mobimba na lisolo ya Biblia: Roma. Ezalaki na ntango oyo Roma ezalaki koyangela nde Mobikisi oyo alakamaki abotamaki mpe asalaki makambo oyo etiká nsango na mokili. Tosɛngi yo otánga eteni ya motoba ya masolo oyo, na nimero ya Lamuká! oyo ekobima na nsima.

^ par. 4 Grɛsi oyo tokolobela na lisolo oyo ezali Grɛsi ya kala oyo ezalaki liboso ya siɛklɛ ya liboso, kasi ezali te ekólo ya Grɛsi ya mikolo oyo.

^ par. 23 Ndenge kaka Ezekiele asakolaki yango, moto oyo akweisaki Tire mpo na mbala ya liboso ezalaki Nebukadrezare, mokonzi ya Babilone. (Ezekiele 26:7) Na nsima, engumba yango etongamaki lisusu. Ezalaki engumba wana oyo etongamaki lisusu nde Alezandre abebisaki, mpe na ndenge yango, akokisaki makambo nyonso oyo basakoli balobaki.