Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makanisi ya bato mpo na nsuka ya mokili

Makanisi ya bato mpo na nsuka ya mokili

OBANGAKA makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya? Soki ɛɛ, yebá ete ozali yo moko te. Banda kala, bato balukaka koyeba makambo oyo ezali koya, mpe mingi balobaka ete likambo moko ya mabe ezali liboso. Eleki sikoyo bambula mingi mpenza, bato mingi balukaki koyeba ndenge mokili ekosuka.

Na ndakisa mikolo oyo, ezala masolo ya kosɛkisa, televizyo, bafilme mpe babuku ndenge na ndenge ezali kolobela masolo ya nsɔmɔ oyo etali ndenge mokili ekosuka. Masolo yango ezali komonisa ndenge banguya mabe ekoya koboma bato; na ndakisa barobo oyo ebomaka bato, bilima ya ndenge na ndenge, bato moko oyo babimi na malita, dragɔ mpe bongo na bongo. Kasi bato nyonso te nde bandimaka masolo ya ndenge wana!

Na ntembe te, masolo mosusu mpe mateya mosusu ebangisaka mpenza bato. Mosusu kati na yango euti na bato ya mayele ya siansi. Lisolo moko ya ndenge wana elobi ete mokolo mosusu etando mobimba ya mabele ekolongwa na mbalakaka mpe yango ekobimisa ba-tsunami, koningana ya mabele, mpe bangomba oyo esanzaka mɔtɔ. Lisolo mosusu elobi ete bitando nyonso ya mokili ekosala molɔngɔ moko kuna na likoló mpe yango ekosala ete moi engala mpe mopɛpɛ ekóma makasi awa na mabele mpe ebebisa biloko nyonso. Mosusu mpe elobi ete mabele ekobaluka na mbalakaka mpe nguya ya moi ekoboma biso nyonso. Kobanga te; nyonso wana ekosalema te. Kasi, makanisi wana ezali kotinda bato bámona ete nsuka ya mokili ekozala bongo.

Nzokande, tokoloba boni mpo na babuku mpe basite ya Internet oyo ezali komonisa ete nsuka ya mokili ekozala na mokolo ya 21 sanza ya 12 ya mobu 2012? Likanisi moko elobi ete etando moko oyo babengi Nibiru (to planɛti X) ezali koya mpo etuta mabele mpe ekokóma awa na mabele na sanza ya 12 ya mobu 2012. Likanisi yango oyo ezali solo te mpe makanisi mosusu ya ndenge wana euti na ndenge kalandriye moko ya Ba-Maya oyo eumeli bambula mingi, esuki na mokolo oyo na kati ya mbula, bangonga ya butu eumelaka mingi koleka oyo ya moi (solstice d’hiver).

Na kolanda makanisi wana, bato mosusu batongi mwa bisika ya kobombana na nsima ya ndako na bango, mpe bamosusu bapesá mbongo mingi mpo bábombela bango bashambre na bandako oyo etongamá na nse ya mabele. Bato mosusu bakendá kofanda likoló ya bangomba, epai basalelaka kura, mai to mɔtɔ ya bango moko.

Nzokande, ezali mpe na bato mosusu oyo bakipaka nyonso wana te. Bandimaka te ete mokolo mosusu mokili ekosuka. Na ndakisa, bato ya mayele oyo basalaka na NASA balobi boye: “Eloko moko te ya mabe ekosalema na mabele na 2012. Etando na biso ekozala malamu na boumeli ya mbula miliare minei, mpe bato ya siansi ya solosolo na mokili mobimba bayebi ete likambo moko te ekosalema na 2012.”

Kasi, ekozala libunga koloba ete likama moko te ezali kozela bato to ete kaka bato ya bindimandima nde bandimaka ete nsuka ya mokili ekoleka ndenge bato bazali kokanisa. Nsuka ya mokili ekozala mpenza solo? Soki ɛɛ, ekozala ndenge nini, mpe ekoya ntango nini?