Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Mayele oyo ndɛkɛ babengi barge rousse esalelaka ntango epumbwaka

Mayele oyo ndɛkɛ babengi barge rousse esalelaka ntango epumbwaka

EYEBANI ete ndɛkɛ babengi barge rousse esalaka mobembo moko ya kokamwa mpenza! Ndɛkɛ yango ekoki kosala mobembo ya kilomɛtrɛ 11 000 na boumeli ya mikolo koleka mwambe.

Talá naino: Bato ya mayele bakanisaka ete mpo na kopumbwa, bandɛkɛ mosusu esalelaka nguya oyo mabele ezalaka na yango ya kobenda biloko, lokola nde bandɛkɛ yango ezalaka na busole na bɔɔngɔ na bango. Ekoki kozala ete barge rousse esalelaka lisusu moi mpe minzoto mpo na kopumbwa na mokolo mpe na butu. Emonani mpe ete ndɛkɛ yango ekoki mpe koyeba ete mopɛpɛ makasi elingi koya, oyo ekoki kotindika ye akende liboso. Kutu, makambo mikemike oyo esalemaka mpo bandɛkɛ yango esala mobembo wana ya kokamwa, ekamwisaka bato ya mayele. Bob Gill, moto moko ya bioloji alobi boye: “Nayekoli bandɛkɛ yango na boumeli ya mbula 20, kasi tii sikoyo ekamwisaka ngai.”

Okanisi nini? Mayele ya kopumbwa oyo ndɛkɛ babengi barge rousse esalelaka, ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?