Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Mokili

Kosilisa nzala esuki kaka te na kobimisa bilei ebele. Emonani ete basali bilanga bazali sikoyo kobimisa bilei ebele oyo ekoki koleisa bato miliare 12; elingi koloba bakisá bato miliare 5 likoló ya motángo ya bato nyonso oyo bafandi na mokili mobimba. Mokakatano ezali kouta libosoliboso na ndenge bazali kotɛka mpe kokabola bilei yango, mpe na ndenge bazali kobebisa yango kaka boye.

Grande-Bretagne mpe États-Unis

Ankɛtɛ moko oyo eutaki kosalema epai ya bato oyo basalaka mosala etali mbongo emonisi ete mingi kati na bato yango (24%) balobaki ete “mpo na kolonga, basengeli kosala likambo moko oyo eyokani te na mibeko” mpe bamosusu (16%) balobaki ete bakoki kosala likambo ya bongo “soki bakozwela yango etumbu te.”

Argentine

Na Argentine, na balakisi 5, misato kati na bango bazali kosɛnga konje mpo na mitungisi mpe mobulu oyo ezali na esika ya mosala.

Corée du Sud

Mosika te, na Corée du Sud, bato oyo bafandaka bango moko bakokóma mingi koleka bato oyo bafandaka ná bato mosusu.

Chine

Emonani lokola ete na bingumba misato ya ekólo Chine, mibale kati na yango ekokoka te kotosa mibeko ya sika oyo guvɛrnema etye mpo na mobu 2016 na likambo etali kobeba ya mopɛpɛ. Lisusu, balobi ete mai oyo bazwaka yango na nse ya mabele ezali “mabe to mpe mabe mpenza.”