Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Arctique

Peter Wadhams, oyo azali mokambi ya departema oyo etalelaka makambo ya mbu na Iniversite ya Cambridge (Grande-Bretagne) alobi ete “na eleko ya molunge, glasi ezali kosila mpenza koleka ndenge ezalaki eleki sikoyo mbula 30.” Na 2012, bamasuwa soki 50 elekaki na nzela oyo efungwami na nɔrdi-ɛsti mpo moi ya makasimakasi esalaki ete glasi enyangwa.

Mokili

Minganga bakamwe komona ete miliki oyo ebimaka na mabɛlɛ ya mama ntango auti kobota sika ezalaka na bavitamini koleka 700! Minganga bazali kokoba kosala bolukiluki mpo na koyeba ndenge oyo bavitamini yango esalisaka nzoto ya mwana oyo abotami sika enikaka bilei mpe ezala makasi.

Grande-Bretagne

Bato ya siansi bayekolaki likambo moko oyo emonisi ete sofɛlɛ oyo azali na maladi ya miyoyo asalaka makambo malɛmbɛ koleka sofɛlɛ oyo alangwe masanga.

République Démocratique du Congo

Na Afrika, bazali koboma bankóto ná bankóto ya banzoku mbula na mbula mpo na kozwa mpɛmbɛ ya nzoku. Bato mosusu balobi ete likambo ya boye “esalemá naino te liboso.” Mokolo moko, babomaki banzoku ebele na masasi oyo ezwaki yango na motó, emonani ete bato yango bazalaki likoló, na hélicoptère.

Australie

Na boumeli ya mbula 27 oyo euti koleka, biloko ya motuya oyo ezalaka na nse ya mai na esika babengi Grande Barrière de Corail etikali kaka ndambo. Bato ya siansi bapesi ntina misato: mipɛpɛ makasi, nyama moko mabe oyo ezalaka na banzubɛ (Acanthaster planci) ezali kosilisa yango, mpe moi makasi oyo ezali kobɛta na océan ezali kosilisa langi kitoko ya biloko yango.