Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozalaka na “fɛti ntango nyonso”?

Ozalaka na “fɛti ntango nyonso”?

“Mikolo nyonso ya moto ya mpasi ezalaka mabe; kasi ye oyo azali na motema ya esengo azalaka na fɛti ntango nyonso.”​—Masese 15:15.

MALOBA yango elimboli nini? Emonisi ndenge makanisi ya moto ezalaka mpe ndenge amiyokaka. “Moto ya mpasi” atyaka kaka makanisi na makambo ya mabe​—kotalela makambo ndenge wana esalaka ete mikolo na ye ezala “mabe” to ya mpasi. Nzokande, moto oyo azali na “motema ya esengo” asalaka makasi atya makanisi na ye na makambo ya malamu—​ezaleli wana ebakiselaka ye esengo na motema mpe esalaka ete azala na “fɛti ntango nyonso.”

Biso nyonso tozalaka na mikakatano oyo ekoki kosilisa biso mwa esengo oyo tozalaka na yango. Kasi, tokoki kosala makambo mosusu oyo ekosalisa biso tóbatela esengo na biso na ntango ya mikakatano. Tótala oyo Biblia elobi.

  • Kotika te ete mitungisi ya lobi elɛmbisa yo lelo. Yesu Kristo alobaki boye: “Bómitungisa té po na makambo ekoya lobi; lobi ekozala na makambo na yango. Mokolo na mokolo ezali na pasi ekoki na yango.”​—Matai 6:34, Bible na lingala ya lelo oyo.

  • Meká kotya makanisi na makambo ya malamu oyo okutanaki na yango. Kutu, ntango olɛmbi nzoto, okoki kosala liste ya makambo yango ya malamu mpe kokanisa yango. Longola yango, kokanisakanisa te mabunga ya kala to makambo ya mabe oyo osalá. Zwá liteya na makambo yango, mpe kende liboso. Zalá lokola sofɛlɛ oyo abwakaka liso na talatala ya motuka na ye kasi atyaka makanisi na ye te na talatala yango. Lisusu, kobosanaka te ete ‘[Nzambe] alimbisaka mpenza.’​—Nzembo 130:4.

  • Ntango mitungisi elɛmbisi yo, yebisá yango moninga moko oyo akoki kolendisa yo. Masese 12:25 elobi ete “motungisi” esalaka ete motema na biso “egumbama, kasi liloba ya malamu esepelisaka yango.” “Liloba [yango] ya malamu” ekoki kouta epai ya ndeko moko ya libota to moninga moko oyo otyelaka motema​—moto moko oyo atyolaka yo te to alobaka na yo makambo mabe te kasi “alingaka ntango nyonso.”​—Masese 17:17.

Maloba ya bwanya oyo ezali na Biblia esalisi bato mingi bázala mpenza na esengo na bomoi, ata na ntango ya mpasi. Tiká ete maloba kitoko oyo esalisa mpe yo.