Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Mpo na nini kokoba kozala na bomoi?

Mpo na nini kokoba kozala na bomoi?

SOKI okutani na Diana, * okomona ete azali elenge mwasi moko mayele, boboto mpe ayebi kofanda na bato. Atako amonanaka lokola azali na esengo, kasi mbala mingi atungisamaka na makanisi. Alobi boye: “Mokolo moko te elekaka kozanga ete makanisi ya kokufa eyela ngai. Namonaka mpenza ete mokili ekozala esika moko ya malamu mingi soki ngai nazali te.”

“Baankɛtɛ mosusu emonisi ete na bato nyonso oyo bamibomaka, 200 kati na bango basí bameká komiboma mpe [bamosusu] na bango 400 bazwaká makanisi yango.”​—THE GAZETTE, MONTREAL, CANADA.

Diana alobi ete akomiboma soki moke te. Ata bongo, na bantango mosusu amonaka ntina ya kokoba kozala na bomoi te. Alobi lisusu boye: “Nalingaka mpenza nakufa ata na aksida moko boye. Nakómá komona liwa lokola moninga, kasi monguna te.”

Bato mingi bamiyokaka lokola Diana, mpe bamosusu bakanisá to baluká komiboma. Kasi bato ya mayele balobi ete bato mingi oyo balukaka komiboma balingaka mpenza te kokata bomoi na bango; balingaka nde kosilisa bampasi na bango. Na mokuse, bamonaka ete ezali na ntina bákufa; kasi bazalaka nde na mposa ya koyeba ntina ya kokoba kozala na bomoi.

Mpo na nini kokoba kozala na bomoi? Tótalela bantina misato.

^ par. 3 Bankombo mosusu ezali ya bango te.