Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA ELOBI NINI?

Mabele

Mabele

Mokano ya Nzambe mpo na mabele ezali nini?

“Talá oyo Yehova alobi, . . . Moto oyo asalaki mabele . . ., azalisaki yango mpamba te, asalaki yango mpo bato báfanda wana.”​Yisaya 45:18.

OYO BATO BALOBAKA

Bato mingi balobaka ete mabele ebimá kaka yango moko. Mangomba mosusu eteyaka ete mabele ezali esika oyo bato bafandi kaka mpo na mwa ntango mpo Nzambe ameka bango mpo ayeba soki bakoki kozwa mbano ya bomoi na likoló to kokende na lifelo.

OYO BIBLIA ELOBI

Biblia elobi ete: “Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.” (Ebandeli 1:1) Alobaki na mobali ná mwasi ya liboso boye: “Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino, mpe bózala na bokonzi likoló ya . . . ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi, oyo ezali kolanda na mabele.” (Ebandeli 1:28) Biblia elobeli liwa kaka na likambo ya kozanga botosi. (Ebandeli 2:17) Na yango, Nzambe asalaki mabele mpo bato báfanda libela na libela. Mabele esengelaki kotonda na bato ya botosi oyo bakobatela yango mpe bakofanda wana libela.

Mabele ekobomama?

“Atyá moboko ya mabele na bisika na yango ya libela; ekotengatenga te kino ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ libela.”​Nzembo 104:5.

OYO BATO BALOBAKA

Bato ya siansi balobelaki makambo ndenge na ndenge oyo ekoki kosala ete mabele ebomama to ekóma esika oyo bato bakoki kofanda lisusu te. Na bantango mosusu balobelaka makama oyo mwaye ya kokima yango ekozala te; na ndakisa: koningana ya mabele to mipɛpɛ makasi, mwa planɛti moko ya moke to monzoto ekotuta mabele, volcan ya minene, moi ekokufa, to molunge makasi na mabele mobimba​—balobeli mpe makama oyo bato bango moko bakobimisa, na ndakisa etumba ya nikleere to bioterrorisme.

OYO BIBLIA ELOBI

Mokano ya Nzambe mpo na mabele ebongwani te. Liloba ya Nzambe elobi polele ete: “Mabele ezali koumela seko.” (Mosakoli 1:4) Lisusu, bato bakofanda wana libela: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”​—Nzembo 37:29.

YANGO ETALI YO NA NINI?

Kokanisa ete mabele ekobeba mokolo mosusu, etindi bato mosusu bápunza biloko ya motuya ya mabele. Etindi basusu balongola elikya mpo na avenire mpe bakóma kobika kaka mpo na lelo. Yango ekoki kosala ete moto amona te ntina mpenza ya bomoi. Kasi, soki tondimi ete tokoki kozala na bomoi libela awa na mabele, tokozwa bikateli oyo ekomemela biso mpe bato ya mabota na biso litomba lelo oyo, ata mpe tii na mikolo ezali koya.

Nsukansuka bato bakokende nde na likoló?

“Likoló ezali ya Yehova, kasi mabele, apesá yango bana ya bato.”​Nzembo 115:16.

OYO BATO BALOBAKA

Bato mingi bakanisaka ete bato nyonso ya malamu bakendaka na likoló.

OYO BIBLIA ELOBI

Likoló ezali ya Nzambe, kasi mabele ezali mpo na bato. Biblia elobeli “mabele oyo ekoya.” (Baebre 2:5) Yesu azalaki moto ya liboso oyo amataki na likoló mpe Biblia emonisi ete mwa bato moke oyo baponami nde bakokende na likoló mpo na mokano moko ya sikisiki. “Bakoyangela mabele” elongo na Yesu.​—Emoniseli 5:9, 10; Luka 12:32; Yoane 3:13.

YANGO ETALI YO NA NINI?

Liteya oyo elobaka ete bato nyonso ya malamu bakendaka likoló eyokani te na oyo Biblia eteyaka mpenza. Soki Nzambe azwaka bato nyonso ya malamu mpo na kokende likoló, yango ekomonisa ete alongi te kokokisa mokano na ye ya ebandeli mpo na mabele mpe ete elaka na ye ya bomoi ya seko awa na mabele ezali lokuta. Nzokande, Liloba ya Nzambe elaki boye: “Tyelá Yehova elikya mpe batelá nzela na ye, mpe ye akotombola yo mpo na kozwa mabele.”​—Nzembo 37:34.