Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA ELOBI NINI?

Masano ya mbongo

Masano ya mbongo

Bato mosusu bamonaka ete kobɛta masano ya mbongo ezali mabe te, kasi basusu bamonaka yango mabe mpenza.

Kobɛta masano ya mbongo ezali mabe?

OYO BATO BALOBAKA

Bato mingi bamonaka ete kobɛta masano ya mbongo ezali mabe te, soki endimami na mibeko ya Leta. Balolenge mosusu ya masano ya mbongo oyo endimami na Leta, na ndakisa oyo Leta ebimisaka mbongo mpo na yango, ekɔtisaka mbongo mingi oyo basalelaka yango misala oyo bana-mboka nyonso bazwelaka yango litomba.

OYO BIBLIA ELOBI

Biblia elobeli mpenza te masano ya mbongo. Kasi, epesi mwa batoli oyo ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge Nzambe atalelaka masano ya mbongo.

Mokano mpenza ya kobɛta masano ya mbongo ezali ya kozwa mbongo oyo omoneli mpasi te; yango eyokani te na likebisi ya Biblia oyo ete “bókeba na motindo nyonso ya bilulela.” (Luka 12:15) Kutu, bilulela nde etindaka bato bábɛta masano yango. Bakompanyi oyo ebɛtisaka masano ya mbongo esalaka piblisite ete soki obɛti lisano yango okozwa mbongo ebele, kasi elobaka solo te soki bato boni bakolonga mpo eyebi ete kolɔta kokóma na mbongo ebele etindaka bato bábimisa mbongo mingi mpo na kobɛta masano yango. Na esika ekebisa bato na bilulela, masano ya mbongo etindaka nde bato bákóma na mposa ya kozwa mbongo oyo bamoneli mpasi te.

Kobɛta masano ya mbongo ezalaka mingimingi mpo na koluka bolamu ya moto ye moko mpo mbongo yango ezalaka oyo euti epai ya bato oyo balongi te na lisano yango. Kasi, Biblia elendisaka moto “akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.” (1 Bakorinti 10:24) Mpe moko ya Mibeko zomi elobi boye: “Osengeli te kolula . . . eloko nyonso oyo ezali ya moninga na yo.” (Kobima 20:17) Ntango mosani atye motema ete akolonga, yango emonisi ete azali komizela ete bamosusu bálonga te mpo ye azwa mbongo na bango.

Biblia ekebisaka mpe bato bakanisa te ete kozala makila malamu nde ememelaka bato mapamboli. Na Yisraele, bato mosusu bazangaki kondima mpe bakómaki “kotyela nzambe ya Makila Malamu biloko na mesa.” Komipesa ndenge wana epai ya “nzambe ya Makila Malamu” endimamaki epai ya Nzambe ya solo? Te, mpo alobaki na bango boye: “Bozalaki se kosala oyo ezali mabe na miso na ngai, mpe boponaki likambo oyo nasepelaka na yango ata moke te.”​—Yisaya 65:11, 12.

Toboyi te, na mikili mosusu, mbongo oyo eutaka na bakompanyi ya masano ya mbongo esalelamaka na makambo ya kelasi, kotombola nkita ya mboka mpe misala mosusu ya Leta. Kasi, kosalela mbongo yango na misala wana ebongoli te ndenge oyo mbongo yango ezwamaka; elingi koloba eutaka na misala oyo elendisaka bato na bilulela, moyimi mpe elendisaka likanisi ya kozwa mbongo oyo omoneli mpasi te.

“Osengeli te kolula . . . eloko nyonso oyo ezali ya moninga na yo.”​Kobima 20:17.

Mabe nini masano ya mbongo ekoki kosala moto oyo azali kobɛta yango?

OYO BIBLIA ELOBI

Biblia ekebisi ete “bato oyo balingaka kaka kozala bazwi bakweaka na komekama mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi, oyo ezindisaka bato na libebi mpe na likama.” (1 Timote 6:9) Lokoso nde etindaka bato bábɛta masano ya mbongo mpe ezalaka mabe mpenza, yango wana Biblia etángi “lokoso” na molɔngɔ ya bizaleli ebele ya mabe oyo moto asengeli koboya mpenza.​—Baefese 5:3.

Lokola esalaka ete moto aluka kozwa bozwi oyo amoneli mpasi te, masano ya mbongo etindaka moto akóma na bolingo ya mbongo; likambo oyo Biblia emonisi ete “ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso.” Mposa ya mbongo ekoki kokóma nguya moko ya makasi oyo ekoki kotinda moto asala likambo boye to boye, kosala ete akóma komitungisa mingi mpe kondima na ye epai ya Nzambe ebeba. Na maloba mosusu, Biblia elobeli baoyo bakangami na motambo ya bolingo ya mbongo lokola bato oyo “bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.”​—1 Timote 6:10.

Lokoso esalaka ete moto asepela te na biloko to mbongo oyo azali na yango mpe esilisaka ye esengo. “Moto oyo alingá palata akotonda palata te, mpe moto alingá bozwi akotonda mpe lifuti te.”​—Mosakoli 5:10.

Bamilio ya bato oyo bakosamaki na masano ya mbongo bamonaki ete bakangami na motambo ya kobɛtaka kaka masano yango. Likambo yango epalangani mingi, emonani ete kaka na États-Unis mpamba, bamilio ya bato bakangami na motambo ya kobɛta masano yango.

Lisese moko elobi boye: “Libula ezwamaka na lokoso na ebandeli, kasi nsuka na yango ekopambolama te.” (Masese 20:21) Kobɛta masano ya mbongo ekómisi bato mosusu baombo ya banyongo to esilisi bango mbongo mpe ebebiseli bango misala, mabala mpe boninga na bango ná basusu. Kosalela batoli ya Biblia ekoki kosalisa moto akima makambo mabe oyo kobɛta masano ya mbongo ebimisaka mpe azala na esengo.

“Bato oyo balingaka kaka kozala bazwi bakweaka na komekama mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi, oyo ezindisaka bato na libebi mpe na likama.”​1 Timote 6:9.