Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | OZALI NA BOKONZI LIKOLÓ YA BOMOI NA YO?

Mokakatano: Makambo oyo bazali kosɛnga yo eleki ndelo

Mokakatano: Makambo oyo bazali kosɛnga yo eleki ndelo

BANA bazali na mposa otyela bango likebi, patrɔ na yo mpe alingi otyela ye mpe likebi. Molongani na yo azali na mposa osalela ye likambo moko. Bazali kosɛnga yo makambo wana nyonso ntango ozali koluka kokipe baboti na yo oyo bazali maladi. Okanaki te kozala na bomoi ya ndenge wana, kasi ezali kosilisa yo makasi mikolo nyonso. Omituni boye: “Nakosala nini? Bazali na mposa na ngai!” Kosala makambo nyonso oyo bazali kosɛnga yo ekoki mbala mosusu kozala te mpo na litomba na yo to ya bango. Okoki kosala nini?

NDAKISA YA BIBLIA: MOIZE

Moize akokaki komona ete azalaki kosala oyo esengeli ndenge azalaki kosala ye moko mosala ya zuzi na Yisraele. Kasi bokilo na ye ayebisaki ye boye: “Ndenge oyo ozali kosala ezali malamu te. Okolɛmba mpenza.” Alobaki na Moize apesa mibali oyo babongi mokumba ya kosambisa makambo mingi, kasi bamemelaka ye kaka oyo eleki mpasi. Nini esalemaki? Bokilo yango ayebisaki ye boye: “Okokoka mpenza yango mpe, lisusu, bato oyo, bango nyonso, bakokóma na esika na bango na kimya.”​—Kobima 18:17-23.

OYO DELINA ASALAKA

Ndenge tolobelaki yango na lisolo ya ebandeli, Delina abɛlaka maladi moko na bɔɔngɔ. Abatelaka mpe bandeko na ye misato oyo bazali bibɔsɔnɔ. Alobi boye: “Namonaka ete kokanisa kaka makambo oyo nakosala na mokolo mpe koboya kozongisa yango nsima ekitisaka mitungisi na ngai. Koyebisa basusu mokakatano na ngai esalaka ete nazwa lisungi na bango ata mpe ya mobali na ngai. Nazwaka mpe mwa ntango ya kosala jardin ntɔngɔ nyonso mpe yango epesaka ngai esengo mpenza.”

“Eloko nyonso ezali na ntango na yango.”​—Mosakoli 3:1

OYO OKOKI KOSALA

Soki makambo oyo bazali kosɛnga yo eleki ndelo, meká kosala boye:

  • Luká moto mosusu oyo akoki kosalisa yo. Na ndakisa, ozali na bana na ndako oyo bakoki kosalisa yo? Ezali na bandeko to baninga oyo bafandaka pene na esika ofandaka, oyo bakoki kosalisa yo?

  • Yebisá basusu bamposa na yo. Na ndakisa, sololá na patrɔ na yo soki azali kosɛnga yo makambo oyo eleki ndelo. Yango elingi koloba te ete osengeli kokweisela ye mitindo. Monisá ye kaka mikakatano na yo. Akoki kondima kolongolela yo misala mosusu.

  • Komá makambo ya kosala oyo ozali na yango na pɔsɔ mobimba. Okoki kopesa misala yango mosusu epai ya bato mosusu?

  • Kondima kokende te na bafɛti nyonso oyo babengisi yo. Soki okokoka te kokende na fɛti moko mpo ozali na ntango te to na makasi te, boyá na boboto nyonso.

Na mokuse: Soki oluki kosala makambo nyonso, mbala mosusu okozala na likoki ya kosala ata moko te.