Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Mituna misato oyo bato bakolinga kotuna Nzambe

Mituna misato oyo bato bakolinga kotuna Nzambe

SUSAN abandaki komituna mituna etali Nzambe ntango azalaki na mbula 7, ntango moninga na ye Al oyo azalaki na mbula 9 akɔtaki lopitalo mpo na maladi ya bukabuka mpe bakɔtisaki ye na aparɛyi moko oyo esalaka lokola pumɔ ya moto. Susan akomaki eksperiansi na ye na zulunalo moko (The New York Times) ya 06/01/2013.

Nsima ya kotala Al na lopitalo, Susan atunaki mama na ye boye: “Mpo na nini Nzambe akoki kosala mwana moke likambo ya boye?”

Mama na ye ayanolaki ye boye: “Sango alobaki ete Nzambe ye moko ayebi, kasi ngai nayebi te mpo na nini Nzambe asali bongo.”

Mbula mibale na nsima, na 1954, Jonas Salk abimisaki mangwele ya bukabuka mpe mama ya Susan alobaki ete mbala mosusu Nzambe nde asalisaki Jonas Salk abimisa mangwele yango.

Susan azongisaki boye: “Ebongaki Nzambe asalisa minganga banda kala mpo bátya Al te na aparɛyi yango.”

Na mokuse, Susan akomi eksperiansi ya bomwana na ye boye: “Nsima ya mbula 8, Al akufaki mpe na ntango wana nakómaki kondima lisusu te ete Nzambe azalaka.”

Ndenge moko na Susan, bato mingi oyo bakutaná na makambo ya mpasi to bamoná yango bazwaka biyano oyo ebongi te na mituna na bango etali Nzambe. Bamosusu bandimaka lisusu te ete Nzambe azalaka. Bamosusu baboyaka mpenza te ete Nzambe azalaka kasi bakómaka nde na bantembe.

Elingi koloba te ete bato oyo bandimaka te ete Nzambe azalaka to baoyo bakómaka na bantembe bayebi makambo ya mangomba ata moke te. Kutu, mbala mingi makambo oyo bakutanaka na yango na mangomba nde etindaka bango bándima lisusu te ete Nzambe azalaka. Bamonaka ete mangomba ekokaka te kopesa biyano na mituna ya ntina mingi etali bomoi. Mituna ya ndenge nini? Likambo ya kokamwa, ezali kaka mituna oyo bato oyo balobaka ete bandimelaka Nzambe bamitunaka. Tótalela mituna misato oyo bato mingi bakolinga kotuna Nzambe, soki bapesi bango libaku ya kosala yango mpe biyano oyo Biblia epesi.

1 “MPO NA NINI OTIKI BAMPASI EZALA?”

Mpo na nini kotuna motuna wana?

Bato mingi balobaka ete ‘soki Nzambe alingaka mpenza bato, alingaki kosala ete makambo ya mpasi ekómelaka bango te.’

KANISÁ NAINO: Bizaleli mpe mimeseno ya bato ya mboka mosusu ekoki kokamwisa biso to tokoki komona yango mabe mpenza. Tokoki mbala moko kokanisela bango mabe. Na ndakisa, na mboka moko bato bakoki komona ete kotala moto na miso ntango bozali kosolola ezali elembo ya bosembo, kasi na mboka mosusu ekoki kozala kozanga limemya. Ata soki ezali bongo, ezali na ntina te tóloba ete bazali na libunga. Kutu, tosengeli nde koyeba bango malamu.

Likambo ya ndenge wana ekoki kokóma ntango tolingi koyeba Nzambe? Bato mingi bakanisaka ete lokola bampasi ezali, emonisi ete Nzambe azalaka te. Kasi, baoyo bayebi ntina Nzambe atiki bampasi ezala, bandimaka mpenza ete Nzambe azalaka.

OYO BIBLIA ELOBI: Makanisi mpe banzela ya Nzambe ekeseni na oyo ya biso. (Yisaya 55:8, 9) Yango wana, na ebandeli misala na ye mpe bantina oyo azali kozela mpo na kosilisa bampasi, ekoki kokamwisa biso.

Kasi, Biblia esɛngi te ete tóndima maloba oyo ya lokuta: “Ndenge Nzambe asalaka makambo ezali libombami.” Kutu elendisi biso nde tóyekola makambo mingi etali Nzambe, mpo tóyeba mpo na nini mpe ntango nini asalaka boye to boye. * Tokoki kutu kopusana penepene na ye.​—Yakobo 4:8.

2 “MPO NA NINI MANGOMBA ETONDI NA BOKOSI?”

Mpo na nini kotuna motuna wana?

Bato mosusu bakoki koloba boye: ‘Soki Nzambe alingaka bosembo, mbɛlɛ bokosi ezali mingi te epai ya baoyo batutaka ntolo ete basambelaka ye.’

KANISÁ NAINO: Kanisá ete mwana moko aboyi kolanda batoli ya malamu ya tata na ye, akimi ndako mpe akómi na bomoi ya mabe. Atako tata na ye asepeli te, atiki ye alanda nzela oyo aponi. Soki bato mosusu bakutani na ye, ebongi mpenza báloba ete ezali foti ya tata na ye to azangá tata? Soki moke te! Ndenge moko mpe, bokosi oyo ezali na mangomba emonisi ete Nzambe atikaka bato bápona nzela oyo balingi.

OYO BIBLIA ELOBI: Nzambe ayinaka bokosi ya mangomba. (Yirimia 7:29-31; 32:35) Kasi, atikaka mpe bato básalela bonsomi na bango ya kopona. Mingi ya baoyo batutaka ntolo ete bandimelaka Nzambe balandaka nde mateya oyo bato babimisá mpe mibeko ya bango moko na oyo etali bizaleli malamu.​—Matai 15:7-9.

Kasi, lingomba oyo Nzambe andimaka ezalaka na bokosi te. * Yesu alobaki boye: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:35) Bolingo yango esengeli kozala “na bokosi te.” (Baroma 12:9) Mangomba mingi elandaka maloba wana ya Yesu te. Na ndakisa, na 1994, ntango bana-mboka ya Rwanda bazalaki kobomana, bato mingi babomaki bandimi ya lingomba na bango kaka mpo bazalaki ekólo moko te. Kasi, Batatoli ya Yehova bakɔtaki na bitumba yango te mpe mingi na bango babatelaki bandeko na bango mpe bato mosusu, atako kosala bongo etyaki bomoi na bango na likama. Yango emonisi ete lingomba yango ekoki kozala na bokosi te.

3 “MPO NA NINI TOZALI AWA NA MABELE?”

Mpo na nini kotuna motuna wana?

Bato mosusu bakoki komituna boye: ‘Mpo na nini bato baumelaka na bomoi kaka mbula 80 to 90 mpe na nsima bakufaka? Mpo na nini bato bazalaka na bomoi mokuse ndenge wana?’

KANISÁ NAINO: Bato mingi oyo bandimelaka Nzambe te, bazalaka na mposa ya koyeba mpo na nini molɔ́ngɔ́ ebongisamá malamu mpe ekamwisaka. Bamonaka ete planɛti na biso, sanza mpe baplanɛti mosusu ebongisamá mpenza mpo bomoi ezala na mabele. Balobaka ete mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́ etyamá na ndenge ebongi mpenza mpe soki ebongwani ata mwa moke, bomoi ekozala lisusu na mabele te.

OYO BIBLIA ELOBI: Atako bato bamonaka ete Nzambe azalaka te mpo bomoi na biso ezalaka mokuse, kasi bozalisi emonisaka mpenza ete Mozalisi azalaka. (Baroma 1:20) Asalaki biloko nyonso mpo na mokano moko mpe bomoi na biso ezali na boyokani na mokano yango. Nzambe akelaki bato mpo bázala na bomoi libela na libela awa na mabele mpe asundolá mokano yango te.​—Nzembo 37:11, 29; Yisaya 55:11.

Atako biloko oyo Nzambe akelá ekoki kosalisa biso tóyeba ete azalaka mpe tóyeba bizaleli na ye mosusu, akanaki te ete tóyeba mokano na ye na ndenge wana. Mpo tóyeba mokano ya Nzambe mpe ntina ya bomoi, esengeli Nzambe ayebisa biso yango. Asololaka na biso na nzela ya Biblia, oyo maloba na yango ezalaka polele mpe mindɔndɔ te. * Batatoli ya Yehova basɛngi yo otalela biyano ya Biblia.

^ par. 17 Mpo na koyeba ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala, talá mokapo 11 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova. Ezali mpe na www.dan124.com.

^ par. 23 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 15 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova. Ezali mpe na www.dan124.com.

^ par. 29 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 3 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova. Ezali mpe na www.dan124.com.