Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | KOTYA KIMYA NA NDAKO

Ndenge ya kosala mpo kimya ezala na libota

Ndenge ya kosala mpo kimya ezala na libota

OKANISI ete Biblia ekoki kosalisa mpo kimya ezala na ndako? Tosɛngi yo otala makambo oyo esalisaki bato oyo batunaki bango mituna mpe oyo Biblia elobaka. Talelá makambo nini ekoki kosalisa yo oboya matata, obatela kimya mpe okómisa boyokani na bino makasi mpenza.

BATOLI YA BIBLIA OYO ESALISAKA BATO BÁZALA NA KIMYA

BÓMITALELAKA NA NDENGE EBONGI.

“Bósala eloko moko te na kowelana to mpo bozali komimona ete boleki bamosusu, kasi na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino, bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.”​Bafilipi 2:3, 4.

“Tomoni ete ezali malamu kotalela molongani na yo lokola moto oyo aleki yo mpe bato mosusu na valɛrɛ.”​—Mwasi oyo aumeli mbula 19 na libala.

YOKÁ NA LIKEBI NYONSO KOZANGA KOTINGAMA KAKA NA MAKANISI NA YO.

“Kobá kokundwela bango ete . . . bázala te bato balingá bitumba, bázala bato ya makambo makasimakasi te, bámonisela bato nyonso boboto mpenza.”​Tito 3:1, 2.

“Tokokima matata soki tozali koyanola molongani na biso na boboto. Ezali na ntina koyoka kozanga kokanisela ye mabe mpe komemya likanisi na ye ata soki tosepeli na yango te.”​—Mwasi oyo aumeli mbula 20 na libala.

ZALÁ NA MOTEMA MOLAI MPE NA BOBOTO.

“Na motema molai nde bandimisaka motambwisi, mpe lolemo ya boboto ekoki kobuka mokuwa.”​Masese 25:15.

“Matata ezangaka te, kasi mpo esila, etalelaka nde bizaleli oyo tomonisaka. Esɛngi mpenza kozala motema molai. Soki tosali bongo, tomonaka ete makambo ebongaka.”​—Mwasi oyo aumeli mbula 27 na libala.

KOMEKA ATA MOKE TE KOFINGA TO KOBƐTA.

“Bólongola makambo oyo nyonso mosika na bino: nkɛlɛ, nkanda, mabe, maloba ya kofinga, mpe maloba ya nsɔni na monɔkɔ na bino.”​Bakolose 3:8.

“Ezaleli ya komipekisa oyo mobali na ngai azalaka na yango esepelisaka ngai. Ntango nyonso azalaka motema kokita mpe agangelaka ngai te, afingaka ngai mpe te.”​—Mwasi oyo aumeli mbula 20 na libala.

LIMBISÁKÁ MPE SILISÁKÁ MATATA NOKINOKI.

“Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu.”​Bakolose 3:13.

“Soki matata ebimi, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te moto afanda nyɛɛ mpe akoki kosala to koloba likambo moko oyo ekoki kozokisa molongani na ye. Na bantango ya ndenge wana, ezalaka malamu kolimbisa. Ezali mpasi libala ezala malamu soki kolimbisana ezali te.”​—Mwasi oyo aumeli mbula 34 na libala.

KABÁKÁ NA MOTEMA MOKO.

“Bópesaka, mpe bato bakopesa bino. . . . Mpo bakomekela bino na emekeli oyo bozali komekela.”​Luka 6:38.

“Mobali na ngai ayebi makambo oyo esepelisaka ngai mpe amemelaka ngai bakado oyo nakanisaki te. Mbala mingi, ngai mpe namitunaka boye: ‘Nasala nini mpo nasepelisa ye?’ Yango esalaka ete tósɛkaka mingi, tii lelo ezalaka kaka bongo.”​—Mwasi oyo aumeli mbula 44 na libala.

KOTIKA TE KOPESA MABƆKƆ MPO KIMYA EZALA NA NDAKO

Bato ya libota oyo Lamuká! etunaki bango mituna bazali kaka moke na kotalela bamilio ya bato na mokili mobimba, oyo Biblia esalisi bango bákóma na bizaleli oyo etyaka kimya na ndako. * Ata soki emonani ete bato mosusu ya libota na bango balingi kosala boyokani te, bamoni ete ezali na ntina kosala milende mpo na kotya kimya mpo Biblia elobi boye: ‘Baoyo batyaka kimya bazali bato ya esengo.’​—Masese 12:20.

^ par. 24 Mpo na koyeba makambo mosusu etali ndenge ya kozala na libota ya esengo, talá mokapo 14 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova mpe ezali na www.dan124.com. Fungolá mpe esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > LISALISI MPO NA LIBOTA.