Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LAMUKÁ! No 2 2018 | Sekele 12 mpo na libota ya esengo

Sekele 12 mpo na libota ya esengo

Toyokaka bansango mingi oyo emonisi makambo oyo esalaka ete mabota mingi etambola malamu te. Kasi, nini esalaka ete makambo etambola malamu na mabota mosusu?

  • Banda 1990 tii 2015, motángo ya mabala oyo ekufaki na États-Unis emataki mbala mibale koleka epai ya babalani oyo bazali na mbula koleka 50 mpe emataki mbala misato koleka epai ya babalani oyo bazali na mbula koleka 65.

  • Baboti mingi bayebaka te oyo basengeli kosala: Bapesi-toli mosusu balendisaka baboti bábondelaka bana, nzokande basusu balendisaka bango básalelaka bana makambo makasimakasi.

  • Bilenge mingi bazali kokóma mikóló kozanga ete báyekola makambo oyo ekosalisa bango bázala na bomoi ya malamu.

Nzokande, esengeli koyeba ete . . .

  • Libala ekoki kozala boyokani ya esengo mpe ekoki koumela libela.

  • Baboti bakoki koyekola kopesa bana na bango disiplini na bolingo.

  • Bilenge bakoki koyekola makambo oyo ekosalisa bango ntango bakokóma mikóló.

Na ndenge nini? Lamuká! oyo elobeli sekele 12 mpo na kozala na libota ya esengo.

 

1: Kotosa ndai ya libala

Toli misato oyo ekoki kosalisa babalani báboma libala na bango te.

2: Kosala na bomoko

Na libala na bino, bofandaka lokola babalani to lokola bato mibale oyo bafandi na shambre moko?

3: Kozala na limemya

Luká koyeba maloba mpe makambo nini ekoki kotinda molongani na yo amona ete omemyaka ye.

4: Kolimbisana

Nini ekoki kosalisa yo olandela te mabunga ya molongani na yo?

5: Kosolola

Makambo misato ya ntina oyo ekoki kosalisa yo ozala na boyokani malamu na bana na yo.

6: Kopesa disiplini

Disiplini ekoki kokitisa lokumu ya mwana?

7: Komonisa bizaleli malamu

Mibeko nini osengeli koteya bana na yo?

8: Kozala ndakisa

Soki olingi ete bana na yo bándima makambo oyo olobaka, maloba na yo esengeli koyokana na makambo oyo osalaka.

9: Komiyeba

Bilenge bakoki kosala nini mpo bákangama na bindimeli na bango?

10: Kotyelama motema

Ntango ozali kokola, ezali na ntina mingi baboti na yo bákóma kotyela yo motema.

11: Kolinga mosala

Koyekola kosala mosala makasi na bolenge ekosalisa yo olonga na makambo nyonso oyo okosala na bomoi.

12: Komityela mikano

Kokokisa mikano ekoki kosalisa yo omityela motema, oyokana malamu na baninga na yo, mpe ekoki kobakisela yo esengo.

Makambo mosusu oyo ekoki kosalisa libota

Batoli ya Biblia ekoki kosalisa yo ozala na libala ya malamu mpe libota ya esengo.