Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Ndenge ya kolobela makambo

Ndenge ya kolobela makambo

MOKAKATANO

Ntango oyo yo ná molongani na yo bolobelaka likambo moko, osilikaka na nsuka ya lisolo? Soki osilikaka, okoki kobongisa. Liboso, osengeli koyeba mwa makambo oyo ekesenisi lolenge ya kosolola ya basi ná ya mibali. *

OYO OSENGELI KOYEBA

Mbala mingi basi basepelaka kolobela likambo liboso ya koyeba ndenge ya kosilisa yango. Kasi, ntango mosusu kosolola nde esilisaka likambo.

“Nazalaka na esengo soki nabimisi oyo nazali koyoka mpe namoni ete mobali na ngai ayoki ngai malamu. Soki kaka nalobi nayokaka malamu—mingimingi mwa miniti nsima ya kosolola na ye.”—Sirppa. *

“Nalongwaka te soki naino nazwi libaku te ya koyebisa mobali na ngai ndenge oyo nazali koyoka. Soki kaka nalobi yango natungisamaka lisusu te.”—Ae-Jin.

“Ezali lokola mosala ya polisi. Ntango nazali koloba, nalandelaka likambo mokomoko mpe nalukaka koyeba epai euti.”—Lurdes.

Mibali balukaka nde kosilisa likambo. Kosala bongo ezali malamu mpo kosilisa likambo epesaka mobali kilo. Kosilisa likambo ezali ndenge oyo mobali amonisaka ete mwasi akoki kotyela ye motema. Mibali basepelaka te soki basi na bango bandimi naino makanisi na bango te. Mobali moko na nkombo Kirk alobi boye: “Ndenge nini moto akoki kolobela likambo soki azali na mposa ya kosilisa yango te!”

Buku moko (The Seven Principles for Making Marriage Work) epesi likanisi oyo: “Basilisaka likambo soki okangi ntina na yango. Osengeli komonisa molongani na yo ete okangi ntina mpe omitye na esika na ye liboso ya kopesa makanisi na yo. Mbala nyonso te nde mwasi na yo akozala na mposa osilisa likambo—ntango mosusu akolinga nde oyoka ye malamu.”

OYO OKOKI KOSALA

Mpo na mibali: Yokáká malamu mpe lukáká komitya na esika ya mwasi na yo. Mobali moko na nkombo Tomás alobi boye: “Mbala mingi nsima ya koyoka, nalobaka na motema ete: ‘Asilisi likambo te.’ Kasi, mwasi na ngai asepelaka soki nazali koyoka ye.” Mobali moko na nkombo Stephen andimi likambo yango, alobi boye: “Nasepelaka kotika mwasi na ngai aloba, nakataka ye maloba te, mpe lisusu soki asilisi ayebisaka ngai ete ayoki malamu ndenge alobi.”

Meká kosala boye: Mbala ya nsima soki osololi na mwasi na yo likambo moko boye, kopesa toli te soki asɛngi yango naino te. Talá ye na elongi mpe yoká malamu makambo oyo azali koloba. Ningisá motó mpo na komonisa ete ondimi. Zongelá makambo alobi mpo na komonisa ete okangi ntina. Mobali moko na nkombo Charles alobi boye: “Mbala mingi mwasi na ngai alukaka koyeba soki nakangi ntina ya likambo oyo alobi mpe soki nandimeli ye.”Toli ya Biblia: Yakobo 1:19.

Mpo na basi: Yebisá mobali na yo mposa na yo. Mwasi moko na nkombo Eleni alobi boye: “Tolingaka mibali báyeba mposa na biso, kasi ntango mosusu esɛngaka koyebisa bango likambo yango polelepolele.” Mwasi moko na nkombo Ynez apesi likanisi oyo: “Nakoki koyebisa mobali na ngai ete: ‘Likambo moko ezali kotungisa ngai mpe nakosepela oyoka nyonso nakoloba. Nalobi te ete osilisa yango, kasi oyeba kaka ndenge oyo nazali koyoka.’”

Meká kosala boye: Soki mobali na yo asilisi likambo moko nokinoki, kokanisa mbala moko te ete amitye na esika na yo te. Mbala mosusu, azali komeka kosalisa yo. Mwasi moko na nkombo Ester alobi boye: “Na esika nasilika, nalukaka komona ete mobali na ngai akipaka ngai, alingi koyoka mpe kosalisa ngai.”Toli ya Biblia: Baroma 12:10.

Mpo na bino mibale: Tolukaka kosalela bato makambo ndenge oyo tolingaka bango básalela biso. Yango wana, mpo olobela likambo malamu, osengeli kotalela ndenge oyo molongani na yo akosepela osalela ye makambo. (1 Bakorinti 10:24) Mobali moko na nkombo Miguel alobeli yango boye: “Mibali basengeli koyokaka malamu. Ntango mosusu basi mpe basengeli kondima ekateli oyo ezwami. Soki mwasi ná mobali bazali koyokana malamu, bazalaka na esengo.” Toli ya Biblia: 1 Petro 3:8.

^ par. 4 Makambo oyo ekomonisama awa elakisi te ete mwasi to mobali nyonso nde azalaka bongo. Kasi, toli oyo ezali na lisolo oyo ekoki kosalisa moto nyonso oyo abalá ayeba kosolola malamu na molongani na ye.

^ par. 7 Na lisolo oyo, bankombo mosusu ezali ya bango te.