Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA TITRE YA EZIPELI

Ntango likama ebimi​—Makambo ya kosala mpo na kobatela bomoi

Ntango likama ebimi​—Makambo ya kosala mpo na kobatela bomoi

“Ntango ndako ya molai esika biro na biso ezalaki epanzanaki, etikalaki moke nakwea na nse. Mopɛpɛ ezalaki komema milinga, mpe mɔtɔ epelaki na ndako yango.”​—Joshua.

Koningana ya mabele . . . mopɛpɛ ya makasi . . . bateroriste babomi bato . . . masasi ebɛtami na eteyelo moko. Wana ezali makambo oyo elobelamaka mingi na bazulunalo, na radio, na televizyo, to na Internet. Ya solo, nsɔmɔ oyo toyokaka ntango totángi to toyoki nsango ya likama moko ekeseni na nsɔmɔ ya kozala na esika oyo likama yango ebimi. Makambo nini okoki kosala liboso likama ebima, ntango likama ebimi, mpe nsima ya likama mpo okoba kozala na bomoi?

LIBOSO LIKAMA EBIMA​—MIBONGISÁ!

LIKAMA ekoki kokwela moto nyonso. Komibongisa ezali likambo ya libosoliboso ya kosala mpo na kobika. Kasi komibongisa esɛngaka nini?

  • Bongisá makanisi. Yebá ete likama ekoki kobima, mpe soki ebimi, bomoi na yo ná bato ya libota na yo ekoki kozala na likama. Esɛngaka komibongisa liboso likama ebima, kasi na nsima te.

  • Luká koyeba makama nini ekoki kobima na esika bofandi. Luká koyeba bisika ya libateli. Talá soki ndako na yo etongami malamu mpe etongami na esika oyo ekoki kobimisa likama te. Longolá eloko nyonso oyo ekoki kopelisa mɔtɔ na ndako. Tyá baaparɛyi oyo elelaka soki milinga etondi na ndako, mpe tyáká pile ya sika na baaparɛyi yango mbala na mbala, ata mbala moko na mbula.

  • Bongisá biloko ya komema na ntango ya likama. Soki likama ebimi, ntango mosusu kura, mai, telefone, to bisi ekozala te. Na yango, soki ozali na motuka, saláká makasi otondisa esansi to esansi ekóma pene na kotonda, mpe na ndako na yo, bózangaka te biloko ya kolya, mai, mpe moto na moto azala na sakosi oyo atyá biloko ya ntina.​—Talá etanda “ Ozali na biloko oyo osengeli komema soki likama ebimi?

    Komibongisa ezali likambo ya libosoliboso oyo osengeli kosala mpo na kobika

  • Zalá na banimero ya telefone ya baninga na yo, ezala baoyo bafandaka pene to mosika.

  • Yebá nzela ya kokima mpe bómekameka yango liboso. Na ndako oyo bofandi, yebá bisika ya kobima oyo ezali pene, mpe yebisá bana na yo makambo oyo basengeli kosala soki likama ebimi ntango bazali na kelasi. Poná esika oyo libota esengeli kokutana, na ndakisa na eteyelo moko to na esika mosusu oyo bino nyonso boyebi, moko ezala pene na esika bofandi mpe mosusu mosika ya kartye na bino. Bakonzi ya mboka balendisaka batata ya mabota ná bato ya mabota na bango bákendaka mbala na mbala na bisika oyo baponá mpo na kokutana soki likama ebimi.

  • Mibongisá mpo na kosalisa basusu, na ndakisa mibange mpe bibɔsɔnɔ.

NTANGO LIKAMA EBIMI​—SALÁ NOKINOKI

Joshua, oyo tolobelaki na ebandeli alobi boye: “Ntango mɔtɔ epelaki, bato mingi bakipaki yango te; basalaki nokinoki te. Basusu bazalaki naino kokanga baordinatɛrɛ to kotoka mai na milangi. Mobali moko alobaki: ‘Ntango mosusu ezali kosɛnga kaka tózela mwa moke.’” Atako bato mosusu bazalaki kokakatana, Joshua alobaki na mongongo makasi: “Tosengeli kobima sikoyo!” Ntango baninga na ye ya mosala bayokaki bongo, basutukaki mpe balandaki ye ntango azalaki kokita na baeskalye. Joshua akobaki koganga: “Soki moto moko akwei, bómema ye mpe bókoba kokita. Biso nyonso tósala bongo!”

  • Soki mɔtɔ epeli. Lalá na nse mpe ngulumá tii okokóma na esika ya kobima oyo ezali pene. Milinga esalaka ete moto amona nzela malamu te, mpe bato mingi bakufaka mpo bamɛli milinga mingi. Tiká biloko na yo nyonso. Soki oumeli kaka mwa basegɔnde, okoki kokufa lokola lisɛki.

  • Soki mabele eningani. Kɔtá na nse ya mesa to ya mbeto to kende esika bifelo ekutaná na kati ya ndako. Yebá ete likama mosusu ekoki kosalema na nsima mpe soki kaka ozwi likoki ya kobima, kimá mosika ya ndako yango. Ntango mosusu bato oyo basalaka mosala ya kobikisa bato na likama bakoya noki te; yango wana salá oyo okoki mpo na kobikisa basusu.

  • Soki tsunami esalemi. Soki mai eningani makasi mpe ebandi koya na mokili, kimá mbangu tii na esika oyo ezali mwa likoló. Yebá ete mbonge ya monene mpe ya makasi koleka ekoya.

  • Soki mopɛpɛ makasi ebɛti. Kɔtá na eteni ya ndako ya nse ya mabele. Soki ezali te, kɔtá mpenza na kati ya ndako.

  • Soki mpela eyei. Zalá mosika na bandako oyo ezindi na mai. Kotambola te to kotambwisa motuka te na kati ya mai. Mai yango ekoki kozala na salite mpe kobomba makama, na ndakisa bosɔtɔ, terase, mpe bansinga ya kura.

  • Oyebaki yango? Soki mai oyo ezali kotíyola ezali mingi, ata santimɛtrɛ 60, ekoki kotindika vuatire. Bato mingi bakufaka na mpela ntango balulaka kotambwisa motuka na kati ya mai oyo ezali kotíyola.

  • Soki bakonzi ya mboka bapesi etinda ya kokima, kimá nokinoki! Yebisá baninga na yo esika nini ozali, mpo bátya bomoi na bango na likama te mpo na koluka yo.

    Soki bakonzi ya mboka bapesi etinda ya kokima, kimá nokinoki!

  • Oyebaki yango? Kokomela moto mesaje ekoki kozala malamu koleka kotindela ye mesaje ya maloba na telefone.

  • Soki bakonzi ya mboka bayebisi bato bátikala na kati ya ndako to na esika ya libateli, tosá malako yango. Na ndakisa, soki izini to bɔmbi moko epanzani esika bozali, kobima libándá te, kangá biloko nyonso oyo epesaka mopɛpɛ, mpe kangá baporte mpe bafɛnɛtrɛ nyonso. Soki bɔmbi moko epanzani, kɔtá na kati ya ndako mpo opema milinga wana te. Landáká bansango na televizyo to na radio. Kobima libándá te tii ntango bakonzi ya mboka bakoyebisa ete likama ezali lisusu te.

NSIMA YA LIKAMA​—TIKALÁ NA ESIKA YA LIBATELI!

Mpo na komibatela na maladi mpe kokima makama, landá malako oyo:

  • Soki likoki ezali, na esika ya kofanda na kaa, zalá esika moko na baninga.

  • Batelá esika ofandi pɛto.

  • Latá biloko oyo ebatelaka ntango ozali kolongola salite. Soki likoki ezali, latá gants na mabɔkɔ, sapato ya makasi, ekɔti ya makasi, mpe maskɛ mpo na kozipa zolo. Kebá na bansinga ya kura mpe makala ya mɔtɔ oyo ezali komonana te.

  • Kobá na misala na yo ya mokolo na mokolo. Bana na bino basengeli komona ete bozali na kimya mpe bozali na elikya. Bótángisaka bango makambo ya kelasi, bósalaka masano mpe losambo na kati ya libota. Koluka te kolandela bansango nyonso oyo ezali kopesama mpo na likama oyo ebimi, mpe kobimisa te mpasi na yo to nkanda na yo epai ya bato ya libota na yo. Ndimá básalisa yo, mpe salisá basusu.

    Nsima ya likama, kobá na misala na yo ya mokolo na mokolo

  • Yebá ete soki likama ebimi, biloko mingi ebungaka. Guvɛrnema mpe bibongiseli mosusu etyaka likebi mingimingi na kosalisa bato bákoba kozala na bomoi, kasi te na kozongisa biloko nyonso oyo ebungi. Mpo na kokoba kozala na bomoi, tosengeli na mai ya pɛto, biloko ya kolya, bilamba, mpe esika ya kolala to esika ya libateli.​—1 Timote 6:7, 8.

  • Yebá ete okoyoka nsɔmɔ mpe luká lisalisi. Mbala mingi, nsɔmɔ yango eyaka komonana nsima ya koyoka nsɔmɔ ya likama. Emonanaka na makambo lokola mitungisi, konyokwama na makanisi, kozala nkandankanda, kobosana makambo, kozanga makasi ya kosala mosala, mpe kozanga mpɔngi. Sololá na baninga oyo bakoki kosalisa yo.

Joshua abikaki ntango mɔtɔ epelaki na esika na ye ya mosala, kasi bato mingi oyo ayebanaki na bango babikaki te. Bandeko oyo bakambaka lisangá mpe minganga oyo basalisaka bato ya maladi ya motó basalisaki ye. Joshua alobi boye: “Bayebisaki ngai ete mawa oyo nazalaki koyoka ezalaki na kati ya makambo oyo esalisaka moto abika mokemoke mpe nsukansuka ekosila. Nsima ya sanza motoba, nazalaki lisusu kolɔta bandɔtɔ ya mabe mingi te. Bilembo mosusu ya mabe eumelaki mwa ntango molai.”

Lokola moto moko te alingaka makambo ya kozanga bosembo, tosepelaka te komona makama. Kutu, bato mosusu bapesaka Nzambe foti soki likama ebimi. Bato mingi bamiyokaka ete bamemi ngambo soki babiki na likama nzokande basusu bakufi. Yango ekómelaki mpe Joshua; alobi boye: “Namitunaka soki nakokaki te kobikisa bato mosusu mingi. Kasi koyeba ete mosika te Nzambe akosala makambo na bosembo na mabele mobimba mpe akolongola makambo nyonso ya mabe ebɔndisaka ngai. Kasi liboso ete ntango yango ekóma, namonaka ete mokolo mokomoko ya bomoi ezali na motuya mingi mpe nasalaka nyonso oyo esengeli mpo na kobatela bomoi na ngai.”​—Emoniseli 21:4, 5. *

^ par. 33 Mpo na koyeba makambo mosusu etali bilaka ya Nzambe mpo na mikolo ezali koya mpe ntina oyo atiki bampasi, talá buku Makambo oyo Biblia eteyaka. Okoki kozwa yango na www.dan124.com.