LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Mai 2017

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 3/07 tii na 30/07/2017.

Tósalisa ‘bato oyo bafandi bapaya básalela Yehova na esengo’

Okoki kosala nini mpo na kosakola nsango malamu epai ya bato oyo bazali Batatoli ya Yehova te?

Tósalisa bana ya “bato oyo bafandi bapaya”

Soki ozali moboti oyo afandi na mboka mopaya, okoki kosala nini mpo na kosalisa mwana na yo ayeba makambo ya Yehova? Ndenge nini basusu bakoki kosalisa?

LISOLO YA BOMOI

Kozala moto oyo akufá matoi epekisaki ngai te koteya basusu

Atako Walter Markin akufá matoi, azalaki na bomoi ya esengo na mosala ya Yehova mpe azwaki mapamboli mingi.

Kotika te ete bolingo na yo ekita

Bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso batikaki bolingo oyo bazalaki na yango liboso. Nini ekoki kosalisa biso tókoba kolinga Yehova mingi?

“Olingaka ngai koleka oyo?”

Yesu ateyaki Simo Petro liteya moko ya ntina mingi mpo na makambo oyo asengelaki kotya na esika ya liboso. Lelo oyo tokoki mpe kolanda liteya yango.

Ndenge oyo Gayusi asalisaki bandeko

Gayusi azalaki nani, mpe mpo na nini tosengeli komekola ye?

Esengo ya kozala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ

Nini etindaki mwasi moko ná mobali na ye bákoma na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ? Basalaki nini? Mpo na nini ekateli oyo bazwaki epesaki bango esengo?

BILOKO OYO TOSALELÁ KALA

“Mitema na biso etondaki na molende mpe na bolingo koleka liboso”

Nsima ya liyangani ya 1922, ndenge nini Bayekoli ya Biblia basalelaki toli ya ‘kosakola Mokonzi mpe Bokonzi na ye’?