Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI No 1 2023 | Kobɛla na makanisi​—Ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa yo

Na mokili mobimba, kobɛla na makanisi ezali kokómela bamilio ya bato. Bato mingi lelo oyo bazali kobɛla na makanisi, ezala bilenge to mikolo, ata soki ofandi na mboka ya bozwi to ya bobola, otángá mingi to te, to outi na ekólo nini to mpe osambelaka na lingomba nini. Kobɛla na makanisi ezali nini mpe yango esalaka bato nini? Zulunalo oyo ekomonisa ntina ya kozwa lisalisi ya monganga mpe ndenge Biblia ekoki kosalisa na lolenge mingi bato oyo bazali kobɛla na makanisi.

 

Kotungisama na makanisi epanzani na mokili mobimba

Kotungisama na makanisi ezali kokómela bato ya mbula nyonso to mpe mimeseno nyonso. Talá ndenge mitinda ya Biblia ekoki kosalisa yo obatela bokɔlɔngɔnɔ ya makanisi.

Nzambe atyelaka yo likebi

Mpo na nini osengeli komindimisa ete Nzambe ayebi makanisi mpe mayoki na yo koleka moto mosusu nyonso?

1 | Libondeli​—“Bóbwakela ye mitungisi na bino nyonso”

Okoki mpenza kobondela Nzambe mpo na likambo nyonso oyo ezali kotungisa makanisi na yo mpe mpo na mitungisi na yo? Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa bato oyo bazali kotungisama na makanisi?

2 | “Libɔndisi oyo euti na Makomami”

Nsango ya Biblia elaki ete kala mingi te makanisi oyo epesaka mpasi na makanisi ekozala lisusu te.

3 | Ndenge oyo bandakisa ya Biblia ekoki kosalisa yo

Masolo ya Biblia ya mibali mpe basi oyo bazalaki mpe na mayoki lokola oyo ya biso ekoki kosalisa biso tómiyoka te ete tozali biso moko ntango tozali konyokwama na makanisi.

4 | Biblia epesi batoli oyo ebongi

Talá ndenge oyo komanyola na bavɛrsɛ ya Biblia mpe komityela mikano oyo ebongi mpe kokokisa yango esalisaka biso tólonga kotungisama ya makanisi.

Ndenge ya kosalisa bato oyo bazali kobɛla na makanisi

Kosalisa moninga na yo kobongola makambo epai moninga na yo azali konyokwama na makanisi.