Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biblia elobi nini?

Biblia elobi nini?

Mokolo mosusu bosembo ya solosolo ekozala awa na mabele?

Okopesa eyano nini

  • Ɛɛ

  • Te

  • Ntango mosusu

Oyo Biblia elobi

“Nayebi malamu ete Yehova akosala nyonso mpo akɔtela Moto ya mpasi na likambo na ye, na lisambisi ya babola.” (Nzembo 140:12) Bokonzi ya Nzambe ekomema bosembo ya solo na mabele.

Oyo Biblia elobi lisusu na likambo yango

  • Nzambe azali komona makambo ya kozanga bosembo oyo ezali kosalema na mokili mpe akolongola yango.​—Mosakoli 5:8.

  • Bosembo ya Nzambe ekomema kimya na mabele mpe bato bakobanga lisusu eloko te.​—Yisaya 32:16-18.

Nzambe azwaka bato boye na valɛrɛ koleka bato mosusu?

Bato mosusu bakanisaka ete Nzambe apambolá to alakelá mabe mwa etuluku moko ya bato, bato mosusu mpe bakanisaka ete Nzambe azwaka bato nyonso ndenge moko. Okanisi nini?

Oyo Biblia elobi

“Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.” (Misala 10:34, 35) Na miso ya Nzambe bato nyonso bazali ndenge moko.

Oyo Biblia elobi lisusu na likambo yango

  • Biblia ezali na “nsango malamu” mpo na “bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso.”​—Emoniseli 14:6.