Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Nayambi solo ya Biblia atako nazangi mabɔkɔ

Nayambi solo ya Biblia atako nazangi mabɔkɔ

Bato balukaka kosimba eloko soki bamoni bazali na likama. Kasi ngai nakoki kosala bongo te mpo nazangá mabɔkɔ. Nazalaki na mbula nsambo ntango bakataki ngai mabɔkɔ mpo bábikisa bomoi na ngai.

Mama azalaki na mbula 17 ntango abotaki ngai na 1960. Papa asundolaki biso liboso nabotama. Ngai ná mama tozalaki kofanda ná bankɔkɔ na Bourg, engumba moko moke na ɛsti ya Allemagne. Bato mingi bazalaki kondima te ete Nzambe azalaka mpe bato ya libota na ngai bazalaki kondima likanisi wana. Mpo na biso Nzambe azalaki na ntina te.

Ntango nazalaki kokola, nazalaki kosepela ndenge nkɔkɔ azalaki kokipe ngai. Tozalaki kosala misala mingi ná ye, na ndakisa kotinda ngai nakata bitape ya banzete. Nazalaki kosepela na misala yango. Nazalaki komitungisa te mpe nazalaki na esengo.

AKSIDA EBONGOLAKI BOMOI NA NGAI

Mokolo moko, likambo moko ya mabe ekómelaki ngai ntango nazalaki na mbula nsambo. Nautaki kobanda kelasi na ngai ya mibale. Ntango nazalaki kozonga ndako, namataki na potó ya kura. Ntango namataki tii na mɛtrɛ 8 ya potó yango, kura ebɛtaki ngai mpe nazalaki komiyeba lisusu te. Ntango nalamukaki na lopitalo, mabɔkɔ na ngai ezalaki kosala lisusu te. Ezikaki mabe, mpota yango ezalaki nsɔmɔ, yango esengelaki bákata ngai mabɔkɔ mpo pwazɔ ekɔta na makila te. Mama ná bankɔkɔ basilaki mayele. Lokola nazalaki mwana moke, nayebaki mpenza te ndenge oyo kozanga mabɔkɔ ekokaki kosala na bomoi na ngai.

Nsima ya kobima lopitalo nazongelaki kelasi. Bana bazalaki kotumola, kotindika mpe kobamba ngai biloko mpo nakokaki kosala eloko te. Ndenge oyo bazalaki kosala ngai, ezalaki kopesa ngai mpasi na motema. Nsukansuka, batindaki ngai na Internant moko ya eteyelo ya bibɔsɔnɔ na Birkenwerder. Lokola eteyelo yango ezalaki mosika na ndako, ezalaki mpasi mama ná bankɔkɔ báya kotala ngai. Tozalaki komonana kaka na bakonje. Mbula zomi oyo elandaki nakolaki na mabɔkɔ na bango te.

KOKOLA KOZANGA MABƆKƆ

Nayekolaki kosala misala mingi ya sika na makolo. Kanisá naino osimbi lutu to kanya na misapi ya makolo mpo na kolya. Esɛngaki nakolisa likoki wana. Nayekolaki mpe konika mino mpe kosanola nsuki na makolo. Kutu, nakómaki kosala bajɛstɛ na makolo ntango nazali kosolola na bato. Ya solo, makolo ekómaki nde mabɔkɔ na ngai.

Ntango nakómaki elenge, nazalaki kolinga kotánga babuku ya science-fiction. Na bantango mosusu nazalaki kokanisa ete nazali na mabɔkɔ ya mabende oyo ezali kosalisa ngai nasala makambo nyonso. Na mbula 14, nakómaki komɛla makaya. Ezalaki kosala ete namityela motema mpe namona ete nazali lokola moto nyonso. Ezali lokola nazalaki koloba: ‘Ɛɛ, ngai mpe nakoki kosala yango. Soki moto amɛlaka likaya, azali lisusu mwana moke te, azala na mabɔkɔ to te.’

Namipesaki mingi na misala mpe kolekisa ntango na bato mosusu. Nakɔtaki na etuluku moko ya bilenge, oyo Leta ezalaki kopesa bango mabɔkɔ mpe nakómaki sɛkrɛtɛrɛ, esika moko ya lokumu na etuluku yango. Nakɔtaki lisusu na etuluku ya bayembi, nasalaki bapoɛmi mpe masano ya bibɔsɔnɔ. Nsima ya kozwa formasyo moko, nakómaki kosala na kompanyi moko na vile. Ntango nazalaki kokola, nakómaki kolata mabɔkɔ oyo basali kosala mpo nabima lokola moto nyonso.

NAYAMBI SOLO YA BIBLIA

Mokolo moko ntango nazalaki kozela engbunduka mpo nakende mosala, mobali moko ayaki pene na ngai. Mpe atunaki ngai soki nakanisaka ete Nzambe azali na likoki ya kozongisela ngai mabɔkɔ nyonso mibale. Ekamwisaki ngai. Ya solo nazalaki na mposa mabɔkɔ na ngai ezonga, kasi namonaki ete ekoki kosalema ata moke te mpo nazalaki kondima te ete Nzambe azalaka. Banda wana, nasalaki nyonso nakima mobali yango.

Mwa moke na nsima, moninga moko ya mosala abengisaki ngai epai na bango. Ntango tozalaki komɛla kafe, baboti na ye bakómaki kolobela makambo ya Nzambe, Yehova. Mpo na mbala ya liboso, nayokaki ete Nzambe azali na nkombo. (Nzembo 83:18) Kasi, na nse ya motema nalobaki boye: ‘Nzambe azalaka te, ata soki nkombo na ye ezali nani. Nakomonisa bango ete bazali na libunga.’ Lokola namonaki ete makanisi na ngai ezali ya solo, nandimaki koyekola Biblia. Nakamwaki ndenge nakokaki te komonisa bango ete Nzambe azalaka te.

Mokemoke likanisi nazalaki na yango ete Nzambe azalaka te elongwaki ntango totalelaki bisakweli ya Biblia. Bisakweli mingi ekokisamaki, atako ekomamaki bankama to bankóto ya bambula liboso. Mokolo moko, ntango tozalaki koyekola, tokokanisaki makambo oyo ezali kosalema na mokili ná bisakweli oyo ezali na Matai mokapo 24, Luka mokapo 21, mpe 2 Timote mokapo 3. Kaka ndenge bilembo ndenge na ndenge ekoki kosalisa monganga ayeba maladi oyo moto azali kobɛla, makambo ndenge na ndenge oyo elobelami na bisakweli yango esalisaki ngai namona ete tozali na eleko oyo Biblia ebengi “mikolo ya nsuka.” * Esalaki ngai nsɔmɔ. Bisakweli yango ezalaki kokokisama na miso na ngai.

Nandimaki mpenza ete oyo nayekolaki ezalaki solo. Nakómaki kobondela Yehova Nzambe mpe natikaki komɛla makaya, atako nazalaki momɛli monene na boumeli ya bambula koleka zomi. Nakobaki koyekola Biblia mbula mobimba. Na mokolo ya 27/04/1986, nazwaki batisimo nakobombama na baignoire, mpo na ntango wana bapekisaki losambo ya Batatoli ya Yehova na Allemagne ya Ɛsti.

KOKABELA BASUSU

Mpo na epekiseli yango, tozalaki koyanganaka na mwa bituluku na bandako ya bandeko, yango wana nayebanaki na bandeko mingi te. Na mbalakaka bakonzi ya Leta bandimaki nakende na Allemagne ya Wɛsti, kuna bapekisaki te losambo ya Batatoli ya Yehova. Ezalaki mbala ya liboso nakɔta liyangani ya monene mpe namona ebele ya bandeko. Ezalaki mbala ya liboso mpo na ngai.

Ntango efelo ya Berlin ekweaki, epekiseli ya Batatoli ya Yehova elongwaki mpe tokokaki kosambela Yehova Nzambe na kimya nyonso. Nazalaki na mposa ya komipesa mingi na mosala ya kosakola. Kasi, nazalaki kobanga kokutana na bato. Nazalaki komimona ete nazangi ntina ndenge nazangá mabɔkɔ mpe ndenge nalekisaki bomwana na ngai na ndako ya bibɔsɔnɔ. Kasi na 1992, nasakolaki bangonga 60 na sanza moko. Nasalaki mosala yango malamu mpe epesaki ngai esengo mingi. Yango wana nazwaki ekateli ya kosala yango sanza nyonso mpe nakobaki mosala yango na boumeli ya mbula soki misato.

Nabosanaka te maloba oyo ya Biblia: “Nani alɛmbi, mpe ngai nalɛmbi te?” (2 Bakorinti 11:29) Ata nazali ebɔsɔnɔ, kasi nazali na bɔɔngɔ mpe na mongongo. Yango wana nasalaka nyonso nasalisa basusu. Lokola nazangá mabɔkɔ, nakoki komitya na esika ya bato lokola ngai. Nayebi ndenge esalaka soki moto azali kolinga kosala eloko moko kasi likoki ezali te. Namekaka kosalisa baoyo bamiyokaka bongo. Kosalisa bato ndenge wana epesaka ngai esengo.

Koteya bato mosusu nsango malamu epesaka ngai esengo

YEHOVA ASALISAKA NGAI MIKOLO NYONSO

Mpo na koloba solo, na bantango mosusu namitungisaka mwa moke. Nalingaka nazala lokola moto nyonso. Mokolo na mokolo nakoki kosala misala mingi ngai moko, kasi ezwaka ngai ntango mpe makasi mingi koleka. Mokolo na mokolo nalobaka boye: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.” (Bafilipi 4:13) Mokolo na mokolo Yehova apesaka ngai nguya oyo nazali na yango mposa mpo nasala misala lokola “moto nyonso.” Namoni ete Yehova asalisaka ngai kaka. Yango wana nakotika te kosalela ye.

Yehova apesá ngai libota, eloko oyo nazangaki na bomwana mpe na bolenge. Nazali na mwasi moko ya malamu Elke, oyo alingaka mpe amityaka na esika na ngai. Lisusu, bamilio ya Batatoli ya Yehova bakómá bandeko na ngai​—libota ya mokili mobimba.

Ngai ná mwasi na ngai Elke

Elaka ya Nzambe oyo elobeli paradiso, ebɔndisaka ngai, epai akosala “biloko nyonso biloko ya sika,” ata mabɔkɔ na ngai. (Emoniseli 21:5) Nakangaka mpenza ntina ya elaka yango ntango nakanisaka makambo Yesu asalaki ntango azalaki awa na mabele. Na miniti moke, abikisaki lobɔkɔ ya moto moko mpe azongisaki litoi ya mobali moko oyo bakataki ye litoi. (Matai 12:13; Luka 22:50, 51) Bilaka ya Yehova mpe makamwisi ya Yesu endimisá ngai ete mosika te mabɔkɔ na ngai ekozonga.

Koyeba Yehova Nzambe, ezali lipamboli oyo eleki nyonso. Akómá Tata, moninga, mosungi mpe makasi na ngai. Namiyokaka lokola Mokonzi Davidi, oyo akomaki boye: “Yehova azali makasi na ngai mpe nguba na ngai . . . Mpe nasalisami, bongo motema na ngai ezali kosepela.” (Nzembo 28:7) Solo wana nde nalingaka kokangama na yango bomoi na ngai mobimba. Nayambá yango atako nazangá mabɔkɔ.

^ par. 17 Mpo na koyeba makambo mosusu etali elembo ya mikolo ya nsuka, talá mokapo 9, “Tozali na ‘mikolo ya nsuka’?” na buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova mpe ezali na Internet na www.dan124.com.