Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Bayuda oyo bazalaki bapolisi ya tempelo ezalaki banani? Misala nini bazalaki kosala?

Bato ya libota ya Levi oyo bazalaki banganga-nzambe te bazalaki kosala misala mingi, kati na yango mosala oyo tokoki kokokanisa na mosala ya polisi. Bazalaki kosala na nse ya litambwisi ya kapitɛni ya tempelo. Philon, oyo azalaki Moyuda mpe moto ya istware, alobaki mpo na misala ya bato yango ete: “Bato yango [Balevi] mosusu bazalaki kotɛlɛma lokola bakɛngɛli na baporte ya kokɔta na tempelo. Basusu bazalaki bakɛngɛli liboso ya esika mosantu mpo moto nyonso oyo abongi te ameka te kotya lokolo kuna, ezala na nko to kozanga koyeba. Basusu mpe bazalaki kotambola zingazinga mpo na kokɛngɛla, bato na bato na ngala na bango, butu moi.”

Bapolisi yango bazalaki mpe kosalisa Sanedrina. Kaka bango nde etuluku ya Bayuda oyo Baroma bapesaki nzela ya kosimba bibundeli.

Moto moko ya mayele na nkombo Joachim Jeremias alobi ete ntango bato bayaki kokanga Yesu, alobaki na bango ete mokolo na mokolo azalaki koteya na Tempelo kasi bakangaki ye te. (Mat. 26:55) Yesu alingaki koloba na bango bongo te soki bato yango bazalaki te na kati ya bapolisi oyo basalaka na tempelo. Moto yango alobaki ete baoyo batindamaki mpo na kokanga Yesu na mabaku mosusu bazalaki mpe bapolisi ya tempelo. (Yoa. 7:32, 45, 46) Na nsima, Sanedrina etindaki bapolisi yango mosusu ná kapitɛni na bango bákanga bantoma ya Yesu mpe bámema bango kuna. Emonani mpe ete bapolisi yango nde babendaki ntoma Paulo libándá ya tempelo.​—Mis. 4:1-3; 5:17-27; 21:27-30.