Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BILOKO OYO TOSALELÁ KALA

Filme moko oyo esali sikoyo mbula 100

Filme moko oyo esali sikoyo mbula 100

“Ntango nazalaki kotala Ndeko Russell na Fɔtɔ-Drame, ezalaki nde lokola nazali komona ye boye na miso!”​—Moto moko oyo atalaki “Fɔtɔ-Drame” na mobu 1914.

KOBANDA “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi” ebimá, mpo na kosalisa bato bákóma kondima mpenza ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe, ekoki sikoyo mbula 100. Na eleko wana oyo liteya ya evolisyo, bantembe na makambo ya Biblia mpe makambo mosusu ebebisaki kondima ya bato mingi, “Fɔtɔ-Drame” emonisaki ete Yehova azali Mozalisi.

Ndeko Charles Taze Russell oyo azalaki kokamba misala ya bayekoli ya Biblia na ntango wana, azalaki koluka lolenge eleki malamu oyo ekokaki kosala ete nsango ya Biblia epalangana nokinoki. Bayekoli ya Biblia bazalaki kosalela mikanda na boumeli ya bambula koleka 30 mpe yango esalisaki mingi. Kasi, na ntango wana, likebi na bango ekendaki na likambo mosusu: kosalela bafilme ya bililingi oyo ezali koningana.

KOPESA LITATOLI NA NZELA YA BAFILME

Na bambula 1890, bato babandaki kobimisa bafilme ya bililingi oyo ezalaki koningana, kasi ezalaki koloba te. Na ebandeli ya mbula 1903, balakisaki filme moko ya makambo ya nzambe na engumba New York. Na mobu 1912 ntango Ndeko Russell abandaki kobongisa “Fɔtɔ-Drame,” bafilme ya bililingi oyo eninganaka ezalaki na ebandeli na yango. Amonaki ete Kosalela “Fɔtɔ-Drame” ekosalisa mingi mpo na kopalanganisa solo ya Biblia koleka mikanda.

“Fɔtɔ-Drame” ezalaki koumela ngonga mwambe, ezalaki kolakisama na biteni minei, ezalaki kolakisa masolo ya Biblia 96, Ndeko Russell azalaki kobongisa badiskur mpe ndeko moko oyo ayebani lokola molobi malamu mpe azalaka na mongongo ya malamu, azalaki kobɛta masolo ya badiskur yango mpe bazalaki kokɔtisa maloba yango na fɔnɔ. Mpe na biteni mingi, bazalaki kotya mwa miziki. Bandeko oyo bayekolaki ndenge ya kosalela bamasini bazalaki koyokisa mingongo mpe miziki oyo bakɔtisaki na bafɔnɔ, koyokanisa mingongo na bililingi mpe bafilme oyo ezalaki kolakisa ndenge mpenza masolo wana ya Biblia elekaki.

“Elobeli bililingi kobanda kozalisama ya minzoto tii ntango Boyangeli ya mbula nkóto ya Kristo ekosuka.”​—Francis Stuart Barnes, azalaki na mbula 14 na mobu 1914

Bililingi mingi oyo bazalaki kolakisa, bazalaki kosomba yango na bastidio oyo ezalaki kotɛka yango. Bato oyo basalaka bafilme malamu na Philadelphie, New York, Paris mpe Londres bazalaki kotya badiapozitive balangi mpe bazalaki kolekisa yango moko nsima ya mosusu. Bandeko ya libota ya Betele, oyo basalaka na departema oyo etalelaka mosala ya kobongisa bililingi, basalisaki mingi mpo na kotya balangi, ata mpe kosala bamasini mosusu soki oyo ya liboso ebebi. Longola bafilme oyo bazalaki kosomba, bandeko ya Betele oyo bazalaki mosika te na engumba Yonkers, na New York, bazalaki kosala filme ya Abrahama, Yisaka mpe anzelu oyo apekisaki Abrahama aboma mwana na ye.​—Eba. 22:9-12.

Nsima ya mwa ntango moko boye, bandeko oyo bazalaki kosalela bamasini batambwisaki mosala ya kolakisa filme oyo eteni mokomoko ezwaki kilomɛtrɛ soki misato, bafɔnɔ 26 mpe badiapozitive soki 500

Moto moko oyo azalaki kosala ná Ndeko Russell ayebisaki bapanzi-nsango ete mayele wana “ekosalisa bankóto ya bato báyeba Makomami, koleka mayele nyonso oyo mangomba esalelá mpo na kotombola mangomba na bango.” Bakonzi ya mangomba basepelaki nde na milende wana oyo esalemaki mpo na kosalisa ebele ya bato oyo bazalaki na mposa makasi ya koyeba Nzambe? Bakonzi ya mangomba batɛmɛlaki “Fɔtɔ-Drame,” kutu bamosusu basalelaki mayele mabe to ya polele mpo na kopekisa bato bátala yango. Na esika moko oyo bazalaki kolakisa Fɔtɔ-Drame yango, bandimi ya lingomba moko bakataki kura.

Bandeko ya masangá ya zingazinga bakabolaki bamilio ya bililingi ya “Fɔtɔ-Drame” ofele

Bayangani bazalaki mpe kozwa “Pax,” elingi koloba medayi oyo ezalaki na elongi ya Yesu, ntango azali elenge. Medayi yango ezalaki komonisa ete moto oyo alati yango asengeli kozala “mwana ya kimya”

Atako bongo, bato bazalaki kotonda mpenza na bisika ya masano mpo na kotala “Fɔtɔ-Drame” ofele. Na États-Unis, bingumba koleka 80 ezalaki kolakisa “Fɔtɔ-Drame” mokolo na mokolo. Mpo na bato mingi, ezalaki mbala na bango ya liboso ya kotala ‘filme oyo basani na yango bazali koloba’ mpe bazalaki kokamwa. Bililingi oyo ezalaki koleka nokinoki esalisaki bango bámona ndenge mwana ya ndɛkɛ na kati ya likei ezali kododa yango mpo ebima mpe fololo moko ya kitoko ezalaki kofungwama. Biloko oyo bato ya siansi basalaki na ntango wana, emonisaki mpenza bwanya ya Yehova. Ndenge tomonisaki yango na ebandeli, ntango azalaki komona Ndeko Russell wana “Fɔtɔ-Drame” ezalaki kobanda, mpe ntango azalaki komona molobi, moto moko akanisaki lokola nde “amoni Ndeko Russell na miso.”

ESALISAKI MINGI MPO NA KOTEYA BIBLIA

“Fɔtɔ-Drame” elakisamaki mpo na mbala ya liboso mokolo ya 11/01/1914 na esika oyo kitoko ya masano na engumba New York, oyo na nsima ekómaki ya Bayekoli ya Biblia

Moto moko ya mayele na makambo ya bafilme mpe istware na nkombo Tim Dirks alobelaki “Fɔtɔ-Drame” lokola “filme ya liboso ya monene oyo bakɔtisá maloba, oyo ezalaki na bililingi oyo ezalaki koningana mpe badiapozitive oyo ezalaki na bililingi oyo batye balangi.” Bafilme oyo bazalaki kolakisa liboso ete “Fɔtɔ-Drame” ebima, esalelaki mwa mayele yango mosusu, kasi bazalaki kosalela nyonso te na filme moko, mingimingi oyo ezalaki kolobela lisolo moko ya Biblia. Mpe ata filme moko te ekɔtisaki bato ebele tii na bato soki milio 9 na Nɔrdi ya Amerika, na Mpoto, Australie mpe Nouvelle-Zélande kaka na boumeli ya mbula ya liboso!

“Fɔtɔ-Drame” elakisamaki mpo na mbala ya liboso mokolo ya 11/01/1914, na engumba New York. Sanza nsambo na nsima, Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki. Kasi, na mokili mobimba, ebele ya bato bakobaki koyangana elongo mpo na kotala “Fɔtɔ-Drame,” makambo oyo ezalaki kolakisa ete Bokonzi ya Nzambe ekomema mapamboli, ezalaki kobɔndisa bango. Mpo na mobu 1914, “Fɔtɔ-Drame” ezalaki filme moko oyo elekaki bafilme mosusu nyonso.

Bituluku mingi esalelaki “Fɔtɔ-Drame” 20 na Nɔrdi ya Amerika mobimba