Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Sɛkɛlɛ mpo na libota ya esengo

Ndenge ya kokokisa ndai na yo ya libala

Ndenge ya kokokisa ndai na yo ya libala

Mwasi: “Nakómaki komona ete Michael, mobali na ngai, azalaki lisusu kokipe ngai te mpe akómaki malilimalili epai ya bana. * Akómaki bongo ntango tokómaki na Internet na ndako, mpe nakómaki komona ete akómi kotala pornografi na ordinatɛrɛ. Mokolo moko na butu, ntango bana balalaki, natunaki ye mpe andimaki ete akɔtaka na bisika oyo balakisaka pornografi na Internet. Nayokaki mpasi na motema. Nandimaki te ete likambo ya ndenge wana ekokaki kokómela ngai. Nakokaki lisusu kotyela ye motema te. Lokola nde nyonso wana ekokaki te, moninga moko ya mosala akómaki kolula ngai.”

Mobali: “Eleki mwa ntango, Maria, mwasi na ngai, amonaki fɔtɔ moko ya mabe na ordinatɛrɛ mpe atunaki ngai soki euti wapi. Ntango nandimaki ete nakɔtaka na bisika oyo balakisaka pornografi na Internet, asilikaki makasi. Nayokaki nsɔni makasi mpe natungisamaki mingi. Nakanisaki ete libala na biso ekokufa.”

MPO na yo, mokakatano nini ezalaki na libala ya Michael ná Maria? Okoki kokanisa ete mokakatano monene ya Michael ezalaki kotala pornografi. Kasi, ndenge Michael amonaki yango, ezaleli mabe yango ebombaki likambo mosusu: kozanga mposa ya kokokisa ndai na ye ya libala. * Ntango Michael ná Maria babalanaki, bazalaki na elikya ete bakolingana mpe bakozala na libala ya esengo bomoi na bango mobimba. Kasi, lokola na mabala mingi, nsima ya ntango, mposa ya kokokisa ndai na bango ekitaki mpe bolingo na bango ezalaki lisusu makasi te.

Omonaka ete bolingo na bino ezali lisusu te ndenge ezalaki ntango bobalanaki sika? Olingi ete makambo ebonga? Soki ɛɛ, osengeli koyeba biyano na mituna misato oyo: Ndai ya libala elimbolaka nini? Makambo nini ekoki kobebisa yango? Mpe okoki kosala nini mpo na kolendisa ekateli ya kokokisa ndai na yo ya libala?

Ndai ya libala elimboli nini?

Ndenge nini okoki kolimbola ndai ya libala? Bato mingi bakoki koloba ete ezali mposa ya kokokisa mikumba oyo ondimaki. Na ndakisa, bato mosusu bakoki kobatela libala na bango kaka mpo na bana to mpo na kosepelisa Nzambe, Mobandisi ya libala. (Genese 2:22-24) Ya solo, bantina yango ezali malamu mpe ekoki kosalisa babalani bálonga mikakatano oyo bakoki kokutana na yango. Kasi, mpo na kozala na esengo, babalani basengeli kosuka kaka te na komona ete basengeli kotikala elongo.

Yehova Nzambe asalaki libala mpo mwasi ná mobali bázala na esengo ya solosolo. Alingaki ete mobali ‘asepela na mwasi na [ye]’ mpe mwasi alinga mobali na ye mpe ayokaka ete mobali na ye alingaka ye ndenge amilingaka. (Masese 5:18; Baefese 5:28) Mpo na kokóma na boyokani ya ndenge yango, mwasi ná mobali basengeli kotyelana motema. Basengeli mpe kokolisa boninga. Ntango mwasi ná mobali bazali kotyelana motema mpe bazali kosala makasi bákolisa mpenza boninga, mposa ya kokokisa ndai na bango ya libala ekokóma makasi. Bakokóma na boyokani makasi mpenza mpe ndenge Biblia emonisi yango, ekozala lokola nde bato yango mibale bazali “mosuni moko kaka.”​—Matai 19:5.

Yango wana, tokoki kokokanisa ndai ya libala na sima oyo ekangisaka babriki ya ndako. Mpo na kosala sima wana, basangisaka yango na zɛlɔ mpe mai. Ndenge moko mpe, mpo moto akolisa mposa ya kokokisa ndai ya libala, asengeli kaka te kolinga kokokisa mokumba, kasi mpe kozala moto oyo bakoki kotyela motema mpe kozala moninga. Nini ekoki kolɛmbisa boyokani yango?

Makambo oyo ebebisaka yango

Kokokisa ndai ya libala esɛngaka milende mpe komipimela makambo mosusu. Esɛngaka ete moto atika makambo mosusu oyo alingaka mpo na kosepelisa molongani na ye. Nzokande, bato mingi basepelaka te na likanisi ya kokokisa bamposa ya moto mosusu, elingi koloba kopesa kozanga kotuna ete, ‘Nakozwa nini na nsima?’; bamosusu kutu balingaka ata koyoka yango te. Kasi, omituna naino, ‘Na bato nyonso oyo nayebi ete balukaka kaka matomba na bango moko, boni bazali na mabala ya esengo?’ Na ntembe te eyano ezali ete, bazali mingi te, mbala mosusu mpe bazali te. Mpo na nini? Moto oyo alukaka kaka matomba na ye akosepela te kokokisa ndai na ye ya libala soki esɛngi amipimela makambo mosusu, mingimingi ntango amoni ete ezali mpo na litomba na ye te. Soki mpe mposa ya kokokisa ndai ezali te, libala ekokóma bololo, ata soki ezalaki sukali na ebandeli.

Biblia emonisi polele ete mpo libala elonga, babalani basengeli kosala milende. Elobi ete “mobali oyo abalá amitungisaka mpo na makambo ya mokili, ndenge akoki kondimama na mwasi na ye,” mpe ete “mwasi oyo abalá amitungisaka mpo na makambo ya mokili, ndenge akoki kondimama na mobali na ye.” (1 Bakolinti 7:33, 34) Nzokande, ata bato oyo balukaka matomba ya babalani na bango, ntango mosusu bayebaka mikakatano na bango te to mpe bandimaka te makambo oyo bango mpe bamipimelaka. Soki mobali to mwasi azali na botɔndi te mpo na makambo malamu ya molongani na ye, libala na bango ekomemela bango “bolɔzi” mingi “na kati ya mosuni.”​—1 Bakolinti 7:28.

Mpo na kolonga mikakatano oyo ekoki kobima na libala na bino mpe kosepela na ntango ya bisengo, osengeli kotalela libala lokola ebongiseli oyo esengeli koumela libela. Ndenge nini okoki kobatela makanisi ya ndenge wana, mpe kosalisa molongani na yo akokisa ndai na ye ya kofanda na yo libela?

Ndenge ya kolendisa mposa ya kokokisa ndai ya libala

Libosoliboso, esengeli kondima na komikitisa nyonso batoli ya Biblia. Na ndenge yango, yo mpe molongani na yo bokozwa “litomba.” (Yisaya 48:17) Talelá makambo mibale oyo okoki kosala.

1. Tyá libala na yo na esika ya liboso.

Ntoma Paulo akomaki boye: “Bótalelaka malamumalamu mpenza makambo oyo eleki ntina.” (Bafilipi 1:10) Na miso ya Nzambe, ndenge oyo mwasi ná mobali bafandaka na kati ya libala na bango ezali na ntina mingi. Mobali oyo apesaka mwasi na ye lokumu, Nzambe mpe akopesa ye lokumu. Epai mosusu, mwasi oyo amemyaka mobali na ye azali na “motuya monene na miso ya Nzambe.”​—⁠1 Petelo 3:​1-4, 7.

Libala na yo ezalaka na esika nini na kati ya makambo ya bomoi na yo? Mbala mingi, soki osepelaka na likambo moko, okobanda kopesa yango ntango mingi. Omituna boye: ‘Na sanza oyo eleki, mbala boni nalekisaki ntango elongo na molongani na ngai? Makambo nini nasalaki mpo na kondimisa molongani na ngai ete tozali kaka baninga?’ Soki ozwaki ntango moke to mpe ozwaki ata ntango te mpo na kozala elongo na molongani na yo, ekoki kozala mwa mpasi mpo andima ete olingaka mpenza ete libala na bino elonga.

Molongani na yo amonaka mpenza ete ozalaka na mposa ya kokokisa ndai na yo ya libala? Ndenge nini okoki koyeba yango?

MEKÁ KOSALA BOYE: Komá na papye makambo oyo: mbongo, mosala, libala, masano, mpe baninga. Komá makambo yango na kolanda oyo omonaka ete molongani na yo atyaka na esika ya liboso. Sɛngá mpe ye asala bongo mpo na yo. Soki bosilisi, yo zwá papye na ye mpe ye azwa oyo ya yo. Soki molongani na yo amonaka ete opesaka ntango mingi te na libala na bino, bólobela makambo oyo bokoki kobongisa mpo na kolendisa mposa ya kokokisa ndai na bino ya libala. Omituna mpe boye, ‘Nakoki kosala nini mpo ngai mpe nasepelaka na makambo oyo ezali na ntina mpo na molongani na ngai?’

2. Kimá lolenge nyonso ya ekobo.

Yesu Klisto alobaki boye: “Moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii na koyoka ye mposa asili kosala ekobo elongo na ye na kati ya motema na ye.” (Matai 5:28) Moto oyo asangisi nzoto na moto oyo azali molongani na ye te, azali kobebisa libala na ye mpe asali likambo oyo Biblia elobi ete ekoki koboma libala. (Matai 5:32) Nzokande, maloba ya Yesu oyo touti kotánga emonisi ete mposa ya mabe ekoki kolonama na motema ntango molai liboso moto asala mpenza ekobo. Kotika mposa mabe wana na motema ezali kozanga bosembo epai ya molongani.

Mpo na kokokisa ndai na yo ya libala, zwá ekateli ya kotala pornografi ata mokolo moko te. Ata soki bato mosusu balobi nini, pornografi ebebisaka mpenza libala. Talá likambo oyo mwasi moko alobaki mpo na ezaleli ya mobali na ye: “Mobali na ngai alobaka ete kotala pornografi ebakisaka lolango na libala. Nzokande, mpo na ngai, etindaka ngai namiyoka ete nazali na ntina moko te, lokola nde nabongi na ye te. Soki namoni ye azali kotala yango, nakobanda kolela tii ntango mpɔngi ekoyiba ngai.” Mpo na yo, mobali wana azali kolendisa mposa ya kokokisa ndai na ye ya libala, to azali nde kotya libala na ye na likama? Okanisi ete azali kosalisa mwasi na ye akokisa ndai na ye ya libala? Azali kosalela ye makambo lokola moninga ya motema?

Yobo, moto moko ya sembo, amonisaki mposa ya kobatela libala na ye mpe ya kosepelisa Nzambe na ndenge asalaki ‘kondimana na miso na ye.’ Azwaki ekateli ya ‘kotalaka epai ya moseka’ te. (Yobo 31:1) Ndenge nini okoki komekola Yobo?

Longola kotala pornografi, osengeli kobatela motema na yo mpo okolisa te boninga oyo ebongi te na mobali to mwasi mosusu. Ya solo, bato mingi bakanisaka ete kozala selesele na moto oyo azali molongani na yo te ezali mabe te mpo na libala. Nzokande, Liloba ya Nzambe ekebisi biso na maloba oyo: “Motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi; nani akoki koyeba yango?” (Yilimia 17:9) Ekoki nde kozala ete motema na yo esili kokosa yo? Omituna boye: ‘Natyelaka nani likebi mingi​—⁠molongani na ngai to moto mosusu? Soki nayoki likambo moko ya malamu, nasepelaka koyebisa yango liboso nani​—⁠molongani na ngai, to moto mosusu? Soki molongani na ngai apekisi ngai kozala selesele na moninga moko, nakosala nini? Nakosilika, to nakosala ndenge alobi na ngai?’

MEKÁ KOSALA BOYE: Soki omoni ete okómi kosepela na moto oyo azali molongani na yo te, salá makasi okutanaka na ye mingi te mpe kaka mpo na makambo ya mosala. Kotya likebi te na makambo ya moto yango oyo omonaka ete eleki ya molongani na yo. Tyáká nde likebi na bizaleli malamu ya molongani na yo. (Masese 31:29) Kanisá lisusu makambo oyo esepelisaki yo epai ya molongani na yo. Omituna boye, ‘Molongani na ngai azali lisusu na bizaleli yango te, to ngai nde nakipaka yango lisusu te?’

Makambo oyo okoki kosala

Michael ná Maria, balongani oyo tolobelaki na ebandeli, bazwaki mokano ya koluka toli mpo na kosilisa mikakatano na bango. Ya solo, kotuna toli ezali kaka litambe ya liboso. Kasi, lokola Michael ná Maria bandimaki kosilisa mikakatano mpe koluka lisalisi, bango mibale bamonisaki polele ete bazali na mposa ya kokokisa ndai na bango ya libala, ete bazali pene ya kosala nyonso mpo libala na bango elonga.

Ezala ete bozali na kimya to na matata na kati ya libala na bino, molongani na yo asengeli koyeba ete ozali na mposa makasi ete libala na bino elonga. Salá nyonso oyo esengeli mpo na komonisa ye yango. Okondima kosala yango?

^ par. 3 Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa na lisolo oyo.

^ par. 5 Atako na lisolo oyo topesi ndakisa ya mobali oyo azalaki kotala pornografi, mwasi oyo asali likambo ya ndenge wana akomonisa mpe ete azali na mposa te ya kokokisa ndai na ye ya libala.

OMITUNA . . .

  • Makambo nini nakoki kotika pembeni mpo nazwaka ntango mingi ya kolekisa na molongani na ngai?

  • Nakoki kosala nini mpo na kondimisa molongani na ngai ete nazali na mposa ya kokokisa ndai na ngai ya libala?