Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lingomba ya malamu eteyaka bandimi bázala na bolingo

Lingomba ya malamu eteyaka bandimi bázala na bolingo

BIBLIA elobi boye: “Ye oyo akolingaka te ayebi Nzambe te, mpo ete Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8, haut fleuve) Na yango, lingomba ya malamu esengeli kolendisa bolingo.

Mangomba mingi esalaka misala ya malamu na oyo etali kosalisa bato ya maladi, mibange mpe babola. Balendisaka bandimi básalela toli ya ntoma Yoane oyo alobi boye: “Soko moto nani, oyo azali na biloko na mokili, amoni ndeko na ye na kozanga mpe akangeli ye motema na ye, bolingo na Nzambe eumeli kati na ye boni? Bana, bólingana na bolingo ya maloba te soko na monɔkɔ te kasi na bolingo na misala mpe na solo.”​—1 Yoane 3:17, 18, haut fleuve.

Kasi, nini tomonaka na ntango ya etumba? Esengeli kotosa mobeko ya Nzambe oyo elobi ete “Okolinga mozalani na yo lokola yo moko” kaka na ntango ya kimya mpe kotya yango pembeni ntango moto moko ya politiki to mokonzi moko aponi kobundisa ekólo mosusu?​—Matai 22:39, haut fleuve.

Yesu alobaki boye: “Soki bolingani, bato nyonso bakoyeba ’tè bozali bayekoli na ngai.” (Yoane 13:35, Bible na lingala ya lelo oyo) Ntango ozali koyanola na mituna oyo elandi, omituna boye: ‘Bandimi ya lingomba yango balingaka bato ntango nyonso kaka na maloba te kasi mpe na misala?’

MOTÓ YA LIKAMBO: Etumba.

OYO BIBLIA ETEYAKA: Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Ngai nalobi na bino: bólingaka banguna na bino, bósambelaka po na bato oyo banyokolaka bino.”​—Matai 5:44, Bible na lingala ya lelo oyo.

Ntango basoda bayaki kokanga Yesu, ntoma Petelo abimisaki mopanga mpo na kobundela ye. Kasi, Yesu alobaki na ye boye: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango. Zambi baoyo nyonso bakosimba mopanga bakokufa na mopanga.”​—Matai 26:52, haut fleuve.

Ntoma Yoane akomaki boye: “Bana na Nzambe mpe bana na Satana bakomonana polele na likambo oyo. Moto na moto oyo azangi kosalaka boyengebene auti na Nzambe te; na oyo azangi kolinga ndeko na ye lokola. Yango wana nsango eyoki bino longwa na ebandeli ete tólingana. Pelamoko Kaina te, oyo autaki na oyo mabe mpe abomaki ndeko na ye.”​—1 Yoane 3:10-12, haut fleuve.

MOTUNA: Lingomba yango elendisaka bato bámikɔtisa na bitumba?

MOTÓ YA LIKAMBO: Politiki.

OYO BIBLIA ETEYAKA: Nsima ya komona makamwisi ya Yesu, bato mosusu balingaki kokómisa ye mokonzi. Asalaki nini? “Eyebaki Yesu ete balingaki koya kosimba ye ete bázalisa ye mokonzi, alongwi lisusu epai na ngomba bobele ye moko.”​—Yoane 6:15, haut fleuve.

Ntango bakangaki Yesu mpe bakoselaki ye makambo ete azali kobimisa mobulu, azongisaki boye: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo té. Soki ezalaki ya mokili oyo, mbele bato na ngai balingaki kobundela ngai po nákweya na maboko ya Bayuda té. Kasi bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo té.”​—Yoane 18:36, Bible na lingala ya lelo oyo.

Ntango azalaki kobondela Nzambe mpo na bayekoli na ye, Yesu alobaki boye: “Napesi bango liloba na yo mpe bamokili basili koyina bango zambi bazali bato na mokili te pelamoko ngai nazali moto na mokili te.”​—Yoane 17:14, haut fleuve.

MOTUNA: Lingomba yango elandaka ndakisa ya Yesu mpe eboyaka kokɔta na makambo ya politiki, ata soki ekosala ete bato mosusu ya politiki báyina yango?

MOTÓ YA LIKAMBO: Kokanisela bato mosusu mabe.

OYO BIBLIA ETEYAKA: Ntango bato oyo bakatamá ngenga te, bakómaki baklisto, ntoma Petelo alobaki boye: “Na solo namoni ete Nzambe akokabolaka bato te; Kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.”​—Misala 10:34, 35, haut fleuve.

Ntango akomelaki baklisto ya liboso, Yakobo alobaki boye: “Bandeko na ngai, bózala na kondima epai na Nkolo na biso, Yesu Klisto na nkembo, na koponapona bato te. Zambi soko moto aingeli na eyanganelo na bino oyo azali na lopɛtɛ na wolo na mosapi mpe alati bilamba kitoko mpe nsima mobola aingeli na bilamba bibebi; Soko nde bokoyamba oyo alati bilamba kitoko, koloba ete, Yo fandá awa na esika malamu nde bokoloba na mobola ete, Yo tɛlɛmá wana, soko ete, Okoki kofanda na nse awa na makolo na ngai, bozali kokatakata na mitema na bino mpenza te? Bozali kosambisa na makanisi mabe mpe te?”​—Yakobo 2:1-4, haut fleuve.

MOTUNA: Lingomba yango eteyaka ete bato nyonso bazali ndenge moko na miso ya Nzambe mpe ete bandimi ya lingomba yango basengeli te komona moto mpamba mpo azali na mposo mosusu to azali na mbongo te?

Lingomba nini eteyaka bandimi na yango bálinga moto nyonso kozanga kotala ekólo, mposo, to bozwi?