Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Okoki koyeba Nzambe na nkombo na ye?

Okoki koyeba Nzambe na nkombo na ye?

Kozwa ndingisa ya kopesa mokonzi moko mbote to kobenga ye na nkombo na ye ezalaka lokumu. Mbala mingi, bato minene babengamaka na batitre lokola, prezida, mokonzi, to nkumu. Na yango, soki moto moko oyo azali na bokonzi ayebisi yo “bengá ngai na nkombo na ngai,” na ntembe te, okomona yango lokumu monene.

NA LILOBA na ye Biblia, Nzambe ya solo ayebisi biso ete: “Ngai Yehova. Yango nde nkombo na ngai.” (Yisaya 42:8) Atako azali mpe na batitre mingi, na ndakisa “Mozalisi,” “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” mpe “Nkolo Mokonzi Oyo-Aleki-Nyonso,” apesaka ntango nyonso basaleli na ye ya sembo lokumu, na ndenge apesaka bango nzela bábenga ye na nkombo na ye.

Na ndakisa, na libondeli moko oyo asalaki epai ya Nzambe, Moize abandaki na maloba oyo: “Limbisá ngai, Yehova.” (Kobima 4:10) Na molulu ya kofungola tempelo ya Yerusaleme, Mokonzi Salomo abandaki libondeli na ye na maloba oyo: “Ee Yehova.” (1 Bakonzi 8:22, 23) Mpe ntango mosakoli Yisaya abondelaki Nzambe mpo na bato ya Yisraele, alobaki boye: “Ee Yehova, yo nde Tata na biso.” (Yisaya 63:16) Emonani polele ete Tata na biso ya likoló asɛngi biso tóbenga ye na nkombo na ye.

Kobenga Yehova na nkombo na ye ezali na ntina mingi, kasi koyeba ye na nkombo esɛngi makambo mingi. Mpo na moto oyo alingaka ye mpe atyelaka ye motema, Yehova apesi elaka oyo: “Nakobatela ye mpo ayebi nkombo na ngai.” (Nzembo 91:14) Lokola koyeba nkombo ya Nzambe ezali likambo ya ntina mpo abatela biso, na ntembe te, yango esɛngi makambo mingi. Na yango, osengeli kosala nini mpo na koyeba Yehova na nkombo na ye?