Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kanyaka ekosila!

Kanyaka ekosila!

“Tyelá Yehova elikya mpe batelá nzela na ye . . . Ntango bato mabe bakobomama, yo okomona yango.”​—NZEMBO 37:34.

YO MPE omonaka, lokola bato mingi, ete ezali mpasi kokima kanyaka mpe ete kanyaka ekosila libela te? Soki ezali bongo, yebá ete ozali yo moko te. Banda kala, bato bameká mitindo ndenge na ndenge ya guvɛrnema. Atako bongo, balongaka kaka te kosilisa kanyaka mpo na libela. Tozali nde na elikya ete mokolo mosusu bato nyonso bakosalelana makambo na bosembo?

Likambo ya esengo, Biblia elobi ete ekosalema! Eyebisi biso ete mosika te, Nzambe akosilisa kanyaka na mabele mobimba. Ndenge nini akosala yango? Bokonzi na ye, oyo ezali guvɛrnema ya likoló, ekobongola mpenza mabele oyo. Yango nde Bokonzi oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye básambelaka ete eya. Na libondeli oyo mbala mosusu ebengamaka Libondeli ya Nkolo to Tata wa biso, Yesu alobaki boye: “Bokonzi na yo eya; nyonso yo olingi ésalema awa na se.”​—Matié 6:10, Bible na lingala ya lelo oyo.

Mpo na Yesu Kristo, Mokonzi ya Bokonzi yango, Biblia esakolaki boye: “Akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi, mpe moto ya mpasi mpe moto nyonso oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto oyo azangá ná mobola mawa, mpe akobikisa milimo ya babola. Akosikola molimo na bango na monyoko mpe na mobulu.” (Nzembo 72:12-14) Simbá ete Yesu ayokelaka baoyo bazali konyokwama mpo na kanyaka mawa, mpe akosala eloko moko mpo na kosilisa monyoko yango! Yango ezali mpenza kobɔndisa!

Ntango Mokonzi yango ya nguya mpe oyo ayokelaka bato mawa akoyangela, Bokonzi ya Nzambe ekosilisa kanyaka na mabele mobimba. Ndenge nini? Ekolongola makambo misato oyo etindaka bato na kanyaka.

Lisumu

Sikoyo, biso nyonso tosengeli kobundisa mposa ya kosala masumu, oyo etindaka biso tóluka kaka matomba na biso moko. (Baroma 7:21-23) Atako bongo, ezali kaka na bato ya malamu oyo balingaka kosala oyo ezali sembo. Bamonisaka kondima na valɛrɛ ya mbeka ya lisiko oyo Yesu apesaki na nzela ya makila na ye, yango wana bakoki kolimbisama masumu na bango. * (1 Yoane 1:7, 9) Bato ya ndenge wana bakozwa matomba mpo na bolingo monene oyo Nzambe amonisaki, ndenge tozali kotánga na Yoane 3:16: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.”

Nzambe akosala makambo ya kitoko mpenza mpo na bato ya sembo. Na mokili ya sika oyo ezali koya, akolongola makambo nyonso oyo etali lisumu, mpe mokemoke akozongisa bato ya sembo na nzoto ya kokoka tii ntango bakomonana mpenza sembo na miso na ye. (Yisaya 26:9; 2 Petro 3:13) Bato bakosala lisusu te makambo ya kozanga bosembo mpo na lisumu. Na Bokonzi ya Nzambe, bato ya sembo ‘bakolongwa na boombo ya kopɔla.’​—Baroma 8:20-22.

Mokili mabe oyo tofandi

Likambo ya mawa, bato mingi lelo basalaka basusu mabe na nko. Bamonelaka bato mpamba mpe babola, batindaka mpe bato mosusu básala mpe bongo. Biblia epesi bato ya ndenge wana toli oyo: “Moto mabe atika nzela na ye, mpe moto oyo alukaka kosalela bato mabe atika makanisi na ye.” Soki bato ya ndenge wana babongoli mitema, Biblia elaki ete Nzambe “akolimbisa mpenza.”​—Yisaya 55:7.

Kasi mpo na baoyo bakomonisa motó makasi mpe bakoboya kobongwana, Nzambe akosuka kaka na koboma bango. Na Bokonzi ya Nzambe, elaka oyo ya Biblia ekokokisama: “Tyelá Yehova elikya mpe batelá nzela na ye . . . Ntango bato mabe bakobomama, yo okomona yango.” * (Nzembo 37:34) Ntango bato mabe ya motó makasi bakobomama, basambeli ya sembo ya Nzambe bakonyokwama lisusu te mpo na kanyaka.

Satana Zabolo

Mosumuki ya libosoliboso ezali nde Satana Zabolo. Tosengeli mpenza kozala na botondi ndenge mosika te, Yehova akosilisa Satana makasi, mpo na kopekisa ye abungisa lisusu bato nzela te. Nsukansuka, Nzambe akoboma Satana mpo na libela. Elimo mabe wana ya nkanza akotinda lisusu bato te básala mabe.

Kasi, likanisi oyo ete Nzambe akolongola makambo nyonso oyo etindaka bato na kanyaka ekoki komonana lokola likambo oyo ekosalema te. Okoki kokanisa boye: ‘Nzambe azali mpenza na makoki ya kobongola makambo ndenge wana? Soki azali na yango, mpo na nini azali kosala yango sikoyo te?’ Yango ezali mituna malamu, mpe Biblia epesi biyano ya malamu mpenza. * Tosɛngi yo otalela yo moko oyo Biblia eteyaka mpo na mikolo ezali koya, ntango makambo nyonso etali kanyaka ekosila mpo na libela.

^ par. 8 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali valɛrɛ ya lisiko oyo Yesu apesaki, talá mokapo 5 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 12 Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.