Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

SEKELE MPO NA LIBOTA YA ESENGO

Oyo okoki kosala mpo makambo etambola malamu ná molongani na yo ya sika

Oyo okoki kosala mpo makambo etambola malamu ná molongani na yo ya sika

HERMAN: * “Mwasi na ngai ya liboso akufaki na kansɛr nsima ya mbula 34 ya libala na biso. Ntango nabalaki Linda, azalaki komona ete nazalaki ntango nyonso kokokanisa ye na mwasi na ngai ya liboso. Likambo ya mabe koleka, baninga na ngai ya kala bazalaki mbala mingi kolobela bizaleli malamu ya mwasi na ngai ya liboso, mpe yango ezalaki kotungisa Linda.”

LINDA: “Nsima ya kobalana ná Herman, nazalaki komona ete ye mpe bato mosusu bakozwa ngai na valɛrɛ te lokola mwasi na ye ya liboso. Bazalaki kolinga mwasi yango mingi, azalaki koloba na boboto mpe azalaki na bizaleli malamu. Na bantango mosusu nazalaki komituna soki Herman akolinga ngai mpenza lokola mwasi yango.”

Libala ya Linda ná mobali na ye ya liboso ekufaki. Ye ná Herman basepelaka ndenge bakutaná. Ata bongo, ndenge bamonisi yango, kobala lisusu ekoki komema mikakatano oyo ezalaki te na libala ya liboso. *

Soki obalá lisusu, ndenge nini omonaka libala yango? Mwasi moko na nkombo Tamara, oyo abalaki lisusu mbula misato nsima ya koboma libala, alobi boye: “Ntango moto abali mpo na mbala ya liboso, amonaka ete libala yango ekoumela libela. Kasi, ezalaka lisusu bongo te mpo na libala ya mibale, mpo abosanaka te ete oyo ya liboso ekufaki.”

Ata bongo, bato mingi bakómá na esengo mpenza nsima ya kobala lisusu. Basalá ete mabala yango elonga; oyo ya yo mpe ekoki kolonga! Ndenge nini? Tótalela mikakatano misato oyo bato mingi bakutanaka na yango mpe ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa yo olonga yango. *

MOKAKATANO 1: OZALI KOSALA NYONSO MPO LIBALA NA YO YA KALA EBEBISA TE OYO YA SIKA.

Ellen, oyo afandaka na Afrika ya Sudi alobi boye: “Ezali mpasi nabosana basuvenire nyonso ya libala na ngai ya liboso, mingimingi soki tozali kosala mibembo na bisika oyo ngai ná mobali na ngai ya kala tozalaki kokende konje. Na bantango mosusu, nakómaka kokokanisa mobali na ngai ya sika ná oyo ya kala.” Na ngambo mosusu, soki molongani na yo abalaká liboso, ekoki kopesa yo nkanda soki azali kolobela libala yango mbala na mbala.

Bósala makambo ya sika elongo oyo ekosala ete libala na bino ezala na bomoko

LIKANISI: Ndimá ete yo to molongani na yo bokoki te kobosana basuvenire ya libala ya liboso, mingimingi soki libala yango eumelaki bambula mingi. Kutu, basusu balobi ete kozanga koyeba, babengaki balongani na bango ya sika na nkombo ya balongani na bango ya kala! Okoki kosala nini na likambo ya ndenge wana? Biblia epesi toli oyo: “Bómityaka na esika ya bamosusu.”​—1 Petro 3:8.

Kotika te zuwa etinda yo opekisa molongani na yo alobela likambo nyonso oyo etali libala na ye ya liboso. Soki molongani na yo ayoki mposa ya kolobela bomoi oyo alekisá ná molongani na ye ya liboso, yoká ye na likebi mpenza. Lisusu, kowela koloba te ete azali kokokanisa yo na molongani yango. Yan, oyo abalaki lisusu eleki sikoyo mbula 10 alobi boye: “Mwasi na ngai Mimi amonaka te ete kobɛta lisolo ya mwasi na ngai ya kala ezali ekila. Kutu, amonaka yango nde libaku ya koyeba makambo oyo esalaki ete nakóma ndenge nazali lelo.” Okoki kutu komona ete masolo ya ndenge wana ekosalisa yo okóma mpenza moninga ya molongani na yo ya sika.

Tyá miso na bizaleli malamu oyo molongani na yo ya sika azali na yango. Toboyi te, akoki kozanga bizaleli to makoki mosusu oyo molongani na yo ya liboso azalaki na yango. Kasi, ekoki kozala ete aleki oyo ya liboso na makambo mosusu. Na yango, salá ete boyokani na yo ná molongani na yo ya sika ekóma makasi, ‘kokokanisa ye na moto mosusu te,’ kasi tyá nde miso na makambo oyo olingaka mpe osepelaka na yango epai ya na ye. (Bagalatia 6:4) Mobali moko na nkombo Edmond oyo abalá mbala mibale, alobi boye: “Ndenge kaka boninga ya bato mibale ezalaka ndenge moko te, mabala mibale mpe ezalaka ndenge moko te.”

Ndenge nini okoki kozala na bokatikati na oyo etali basuvenire ya malamu ya libala na yo ya kala mpe bomoi oyo obandi ná molongani na yo ya sika? Jared alobi boye: “Nayebisaki mwasi na ngai ete libala na ngai ya liboso ezali lokola buku moko kitoko oyo ngai ná mwasi yango tokomaki. Na bantango mosusu, nakoki kofungola mpe kotánga buku yango mpo na kokanisa makambo ya malamu oyo tosalá. Kasi, nazalaka na kati ya buku yango te. Kutu, ngai ná ye tozali kokoma buku na biso moko, mpe yango nde esika nazali sikoyo.”

MEKÁ KOSALA BOYE: Tuná molongani na yo soki esalaka ye mabe te ntango obɛtaka masolo ya molongani na yo ya kala. Luká koyeba ntango oyo ekozala malamu te kolobela libala na yo ya liboso.

MOKAKATANO 2: OZALI KOSALA NYONSO MPO OSOLOLAKA MALAMU NA BANINGA YA KALA OYO BAYEBI MOLONGANI NA YO YA SIKA MALAMU TE.

Javier oyo abalaki lisusu mbula 6 nsima ya koboma libala, alobi boye: “Mwa bambula nsima ya libala na biso, mwasi na ngai ya sika azalaki komona ete baninga na ngai mosusu bazalaki koluka koyeba makambo nyonso ya bomoi na ye.” Mobali moko na nkombo Léon akutanaki na likambo oyo ekeseni na oyo ya Javier. Alobi boye: “Na miso na ngai, bato mosusu bazalaki koloba na mwasi na ngai ete balingaka mobali na ye ya liboso mingi mpe bazali na mposa ya komona ye!”

LIKANISI: Meká komitya na esika ya baninga na yo. Yan oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Nakanisi ete na bantango mosusu, baninga ya kala bamonaka ete bakokoka te kolekisa ntango ná moto oyo azali kaka molongani ya sika ya moninga na bango.” Na yango, ‘kozala makambo makasimakasi te, moniselá bato nyonso boboto mpenza.’ (Tito 3:2) Tikelá baninga mpe bandeko na yo ntango ya kobongola makanisi na bango. Ndenge kaka libala na yo ebongwani, baninga na yo bakoki mpe kobongwana. Javier, oyo tolobelaki alobi ete nsima ya mikolo, ye ná mwasi na ye bazongelaki baninga na bango ya kala. Abakisi boye: “Kasi, tosalaka mpe makasi tókóma na baninga ya sika, yango mpe esalisaka biso.”

Talelá mpe ndenge oyo molongani na yo ayokaka ntango bolekisaka ntango ná baninga ya kala. Na ndakisa, soki likambo ya libala na yo ya liboso ekɔti na masolo na bino, salelá mayele mpe bososoli mpo molongani na yo amiyoka te ete botye ye pembeni. Biblia elobi ete “soki moto azali koloba kozanga kokanisa, maloba yango ekoki kozokisa lokola mopanga. Kasi moto ya mayele atyaka likebi na makambo oyo alobaka. Maloba na ye ekoki kobikisa bampota yango.”​—Masese 12:18, Biblia Holy Bible​Easy-to-Read Version.

MEKÁ KOSALA BOYE: Kanisá liboso mwa bafɛti oyo ekoki kobimisela yo to molongani na yo mikakatano. Bósolola liboso ndenge ya malamu oyo bokoyanola na mituna ya baninga na bino mpe bakomantɛrɛ oyo bakosala mpo na libala ya liboso.

MOKAKATANO 3: OZALI KOSALA NYONSO OTYELAKA MOLONGANI NA YO YA SIKA MOTEMA MPO OYO YA LIBOSO AZALAKI SEMBO TE.

André, oyo mwasi na ye ya liboso asundolaki ye, alobi boye: “Nazalaki kobanga kokutana lisusu na likambo ya ndenge wana.” Na nsima, abalaki Riley, mwasi oyo azali na ye sikoyo. Alobi lisusu boye: “Mbala mingi, nazalaki komituna soki nakozala mobali malamu lokola mobali ya Riley ya liboso. Kutu, nazalaki kobanga ete Riley amona ngai mabe mpe azwa ekateli ya kotika ngai mpe abala moto mosusu.”

LIKANISI: Yebisá molongani na yo likambo oyo ezali kotungisa yo. Biblia elobi ete: “Myango elongaka te esika lisolo ya nkuku ezali te.” (Masese 15:22) Masolo ya nkuku esalisaki André ná Riley bátyelanaka motema. André alobi boye: “Nayebisaki Riley ete nakoluka soki moke te koboma libala mpo na kosilisa mikakatano, Riley ayebisaki ngai mpe bongo. Mokemoke, nakómaki mpenza kotyela ye motema.”

Soki basalelá molongani na yo likambo ya sembo te na libala na ye ya liboso, salá nyonso oyo okoki mpo atyelaka yo motema. Na ndakisa, Michel ná Sabine, oyo mabala na bango ya liboso ekufaki, bayokanaki ete báyebisanaka makambo oyo basololi na balongani na bango ya kala. Sabine alobi ete “yango esalá ete moto na moto azala na likambo ya kobanga te epai ya moninga.”​—Baefese 4:25.

MEKÁ KOSALA BOYE: Kolekisa ndelo te na masolo ya nkuku oyo okoki kosolola na mwasi to mobali oyo azali molongani na yo te, ezala na telefone to na Internet.

Bato mingi oyo babalá mpo na mbala ya mibale balongá na mabala na bango, yo mpe okoki kolonga. Kutu, ekoki kozala ete sikoyo omiyebi malamu koleka mbala ya liboso oyo obalaki. André oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Nazwá libɔndisi moko ya koloba te na libala na ngai ná Riley. Nsima ya kolekisa mbula 13 na libala na biso, boninga na biso ekómá makasi mpenza mpe tolingaka kobebisa yango te.”

^ par. 3 Bankombo mosusu ezali ya bango te.

^ par. 5 Ya solo, moto oyo libala na ye esuki mpo molongani na ye akufi, ayokaka ndenge moko te na moto oyo abomi libala. Lisolo oyo ebongisami mpo na kosalisa baoyo bakutaná na makambo ya ndenge wana, bálonga na libala na bango ya sika.

^ par. 7 Mpo na koyeba mikakatano ya kobɔkɔla bana ya molongani na yo, talá masolo “Des familles recomposées épanouies” na Lamuka! ya 04/2012 na Lifalanse, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

OMITUNA BOYE . . .

  • Wapi bizaleli oyo nasepelaka na yango mingi epai ya molongani na ngai?

  • Soki lisolo ya libala na ngai ya liboso ekɔti na masolo na biso, ndenge nini nakoki kosala mpo epesa molongani na ngai mpasi te to kokitisa lokumu na ye?