Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BATATOLI YA YEHOVA BAZALI BANANI?

Mpo na nini tosakolaka?

Mpo na nini tosakolaka?

Ekoki kozala ete komipesa mingi na mosala ya kosakola ndako na ndako, na bisika ya bato nyonso mpe esika nyonso oyo tokoki kokutana na bato nde ekesenisaka biso mpenza na mangomba mosusu. Mpo na nini tosalaka bongo?

Batatoli ya Yehova basakolaka mpo na kokumisa Nzambe mpe koyebisa bato nkombo na ye. (Baebre 13:15) Totosaka mpe komandema oyo ya Yesu Kristo: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, . . . bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.”​—Matai 28:19, 20.

Longola yango, tolingaka bazalani na biso. (Matai 22:39) Toboyi te, toyebi ete bato mingi bazalaka na mangomba na bango oyo basambelaka mpe ete moto nyonso te nde asepelaka na nsango na biso. Ata bongo, tomonaka ete mateya ya Biblia ebikisaka bomoi ya bato. Yango wana tokobaka “kozanga kotika, . . . koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Kristo,” kaka ndenge bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalaki.​—Misala 5:41, 42.

Antonio Cova Maduro moto moko ya sosioloji, akomaki mpo na “milende ya Batatoli ya Yehova mpe ndenge babomaka nzoto . . . , mpo mateya ya Biblia ekóma bisika nyonso oyo bato bazali.”​—Zulunalo moko El Universal, Vénézuéla

Bato mingi oyo batángaka mikanda na biso bazali Batatoli ya Yehova te. Mpe bamilio ya bato oyo toyekolaka na bango Biblia bazali na mangomba na bango. Ata bongo, basepelaka ndenge Batatoli ya Yehova bakendaka na bandako na bango.

Toboyi te, okoki kozala na mituna mosusu mpo na Batatoli ya Yehova. Soki olingi kozwa biyano, tosɛngi yo

  • Otuna Motatoli moko ya Yehova.

  • Okɔta na site na biso www.dan124.com.

  • Oyangana na makita na biso, oyo ezalaka ofele mpe moto nyonso akoki koyangana.