Mokanda ya mibale epai ya Batesaloniki 1:1-12

  • Mbote (1, 2)

  • Kondima ya Batesaloniki ezali kokola (3-5)

  • Kozongisa mabe na baoyo bazangi botosi (6-10)

  • Libondeli mpo na lisangá (11, 12)

1  Paulo, Silvano* mpe Timote+ epai ya lisangá ya Batesaloniki oyo ezali na bomoko elongo na Nzambe Tata na biso mpe Nkolo Yesu Kristo:  Boboto monene mpe kimya ya Nzambe Tata mpe ya Nkolo Yesu Kristo ezala na bino.  Bandeko tosengeli ntango nyonso kopesa Nzambe matɔndi mpo na bino. Yango ebongi, mpo kondima na bino ezali kokola mingi mpenza mpe bolingo ya mokomoko na bino epai ya mosusu ezali kobakisama.+  Mpo na yango biso tozali komikumisa mpo na bino+ na kati ya masangá ya Nzambe, mpo na koyika mpiko na bino mpe kondima na bino na minyoko na bino nyonso mpe mikakatano* oyo bozali kokutana na yango.*+  Yango ezali elembeteli ya lisambisi ya sembo ya Nzambe, yango ezali komema bino bótángama bato babongi na Bokonzi ya Nzambe, oyo mpo na yango bozali mpenza komona mpasi.+  Yango elakisi mpe ete ezali sembo mpo na Nzambe kozongisa monyoko* epai ya baoyo bazali konyokola bino.+  Kasi bino baoyo bozali konyokwama, bokozwa kopema elongo na biso na ntango oyo Nkolo Yesu+ akomonana uta na likoló* elongo na baanzelu na ye ya nguya+  na kati ya mɔtɔ ya kopela, ntango akozongisa mabe na baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali koboya kotosa nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu.+  Nkolo na biso akosambisa bato yango. Etumbu na bango ekozala kobomama mpo na seko,+ bakolongolama liboso ya Nkolo mpe bakomona lisusu te nguya ya nkembo na ye. 10  Ntango Nkolo na biso akoya mpo na kozwa nkembo elongo na bandeko na ye basantu, baoyo nyonso bazali na kondima epai na ye bakotala ye na kokamwa. Mpe lokola bondimaki makambo oyo toyebisaki bino, bokozala mpe na kati na bango. 11  Yango wana tozali kobondela ntango nyonso mpo na bino, mpo Nzambe na biso atánga bino bato babongi na kobengama na ye+ mpe na nguya na ye, akokisa na mobimba mpenza bolamu nyonso oyo asepeli kosala mpe mosala nyonso ya kondima. 12  Ezali bongo mpo nkombo ya Nkolo na biso Yesu ezwa nkembo na kati na bino, mpe mpo bino bózwa nkembo na bomoko elongo na ye, na kolanda boboto monene ya Nzambe na biso mpe ya Nkolo Yesu Kristo.

Maloba na nse

Bazalaki mpe kobenga ye Silasi.
To, “malɔzi.”
To, “bozali kokangela motema.”
To, “bolɔzi.”
Lil., “na emoniseli ya Nkolo Yesu uta na likoló.”