Ndenge ekomamá na Luka 5:1-39

  • Bakangi mbisi na likamwisi; bayekoli ya liboso (1-11)

  • Moto moko ya maladi ya maba abikisami (12-16)

  • Yesu abikisi mobali moko oyo azali koningana te (17-26)

  • Yesu abengi Levi (27-32)

  • Motuna na oyo etali kokila bilei (33-39)

5  Mokolo moko, ntango Yesu atɛlɛmaki pembeni ya laki ya Genezarete,*+ ebele ya bato bazalaki kokanganakangana na ye mpo na koyoka liloba ya Nzambe.  Amonaki masuwa mibale esɛmi pene na laki, kasi baluki-mbisi babimaki na kati na yango mpe bazalaki kosukola minyama na bango.+  Amataki na moko ya masuwa yango, oyo ezalaki ya Simo, mpe asɛngaki ye apusa yango mwa moke mosika na mokili. Na nsima afandaki, mpe longwa na masuwa, abandaki koteya ebele ya bato yango.  Ntango asilisaki koloba, ayebisaki Simo: “Pusá masuwa na esika ya mozindo, mpe bókitisa minyama na bino mpo na kokanga bambisi.”  Kasi Simo azongiselaki ye: “Molakisi, tosali mosala makasi butu mobimba mpe tozwi eloko te,+ kasi lokola yo otindi, nakokitisa minyama.”  Ntango basalaki bongo, bakangaki* mbisi ebele mpenza. Kutu, minyama na bango ebandaki kopasuka.+  Na yango basalaki elembo na lobɔkɔ mpo na kobenga baninga na bango oyo bazalaki na masuwa mosusu ete báya kosalisa bango. Bayaki, batondisaki masuwa nyonso mibale, bongo ebandaki kozinda.  Ntango Simo Petro amonaki bongo, afukamaki liboso ya Yesu, alobi: “Longwá pene na ngai, Nkolo, mpo nazali moto ya masumu.”  Mpo ye ná bato oyo bazalaki elongo na ye bayokaki nsɔmɔ mpenza mpo na ebele ya mbisi oyo bakangaki. 10  Yakobo ná Yoane, bana ya Zebede,+ oyo bazalaki baninga ya mosala ya Simo bayokaki mpe nsɔmɔ. Kasi Yesu alobaki na Simo: “Tiká kobanga. Banda sikoyo okobanda kokanga bato na bomoi.”+ 11  Bongo bazongisaki bamasuwa na mokili, basundolaki biloko nyonso mpe balandaki ye.+ 12  Mokolo mosusu, ntango azalaki na moko ya bingumba yango, talá! ezalaki na mobali moko oyo atondá na maba! Ntango amonaki Yesu, afukamaki atye elongi na nse mpe abondelaki ye boye: “Nkolo, soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.”+ 13  Bongo Yesu asembolaki lobɔkɔ na ye, asimbaki ye, mpe alobaki: “Nalingi! Kómá pɛto.” Na mbala moko maladi na ye ya maba elimwaki.+ 14  Bongo apesaki moto yango mitindo ete ayebisa moto te, mpe alobaki na ye: “Kasi kende komilakisa epai ya nganga-nzambe, mpe pesá likabo mpo na kopɛtolama na yo, ndenge Moize apesaki mitindo,+ mpo ezala litatoli mpo na bango.”+ 15  Kasi nsango na ye ezalaki se kopalangana bipai na bipai, mpe ebele ya bato bazalaki koyangana mpo na koyoka ye mpe kobikisama na bamaladi na bango.+ 16  Kasi mbala mingi azalaki kokende na esobe mpo na kobondela. 17  Mokolo moko, kaka na eleko yango ntango azalaki koteya, Bafarisai ná bateyi ya Mobeko bafandaki wana. Bautaki na bamboka nyonso ya Galile, na Yudea mpe na Yerusaleme. Mpe Yehova* apesaki ye nguya mpo na kobikisa.+ 18  Mpe talá! bato bamemaki mobali moko oyo azalaki koningana te,* oyo balalisaki na litɔkɔ, mpe bamekaki kokɔtisa ye mpo na kotya ye liboso ya Yesu.+ 19  Kasi mpo na ebele ya bato, bazwaki nzela ya kokɔtisa ye te. Bongo bamataki likoló ya nsamba, balongolaki batwili mpe bakitisaki ye na mwa litɔkɔ wana, na katikati ya bato oyo bazalaki liboso ya Yesu. 20  Ntango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na mobali yango: “Masumu na yo elimbisami.”+ 21  Bakomeli ná Bafarisai babandaki kolobana bango na bango: “Moto oyo azali nani mpo afinga Nzambe? Nani akoki kolimbisa masumu longola kaka Nzambe ye moko?”+ 22  Kasi lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, azongiselaki bango: “Makambo nini bozali kokanisa na mitema na bino? 23  Nini eleki pɛtɛɛ, koloba: ‘Masumu na yo elimbisami,’ to koloba: ‘Tɛlɛmá mpe tambolá’? 24  Kasi mpo bóyeba ete Mwana ya moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu awa na mabele—” alobaki na moto oyo azalaki koningana te boye: “Nalobi na yo: Tɛlɛmá, zwá litɔkɔ na yo, mpe kende epai na yo.”+ 25  Na yango, moto yango atɛlɛmaki liboso na bango, azwaki litɔkɔ oyo azalaki kolalela mpe akendaki epai na ye, azali kokumisa Nzambe. 26  Bongo bato nyonso bakamwaki mingi mpenza, bakumisaki Nzambe, mpe babangaki mingi mpenza, balobi: “Tomoni makambo ya kokamwa lelo!” 27  Nsima na yango, abimaki mpe amonaki mokɔngɔli-mpako moko nkombo na ye Levi afandi na biro ya mpako, mpe alobaki na ye: “Landá ngai.”+ 28  Mpe atikaki biloko nyonso na nsima, atɛlɛmaki mpe abandaki kolanda ye. 29  Na nsima Levi asalelaki ye fɛti moko monene na ndako na ye; mpe ezalaki na ebele ya bakɔngɔli-mpako ná bato mosusu oyo bazalaki kolya* elongo na bango.+ 30  Bongo Bafarisai ná bakomeli na bango babandaki koimaima mpe koloba na bayekoli na ye: “Mpo na nini bozali kolya mpe komɛla elongo na bakɔngɔli-mpako mpe basumuki?”+ 31  Yesu azongiselaki bango: “Baoyo bazali nzoto malamu bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde bato oyo bazali kobɛla.+ 32  Nayaki te kobenga bato ya sembo, kasi basumuki mpo bábongola motema.”+ 33  Bango balobaki na ye: “Bayekoli ya Yoane bakilaka bilei mbala na mbala mpe basalaka mabondeli,* ndenge moko na bayekoli ya Bafarisai, kasi baoyo ya yo balyaka mpe bamɛlaka.”+ 34  Yesu alobaki na bango: “Bokoki te kokilisa baninga ya mobali ya libala bilei ntango mobali ya libala azali elongo na bango, boye te? 35  Kasi mokolo ezali, mobali ya libala+ akolongolama epai na bango; bongo bakokila mpenza bilei na mikolo wana.”+ 36  Apesaki bango mpe ndakisa moko: “Moto moko te akataka eteni ya elamba* ya sika mpo na kotonga yango na elamba ya kala. Soki asali bongo, eteni ya elamba ya sika ekopasola yango mpe eteni oyo euti na elamba ya sika ekokokana te na oyo ya kala.+ 37  Lisusu, moto moko te atyaka vinyo ya sika na milangi ya kala ya mposo ya nyama. Soki asali bongo, vinyo ya sika ekopanza milangi yango, ekosopana mpe milangi ya mposo ya nyama ekobeba. 38  Kasi vinyo ya sika esengeli kotyama na basaki ya sika ya mposo ya nyama. 39  Nsima ya komɛla vinyo ya kala, moto moko te alingaka vinyo ya sika, mpo akoloba: ‘Oyo ya kala ezali kitoko.’”

Maloba na nse

Elingi koloba, Mbu ya Galile.
To, “bazwaki.”
Talá Ap. A5.
To, “mokatatali.”
To, “batandamaki na mesa.”
To, “malɔmbɔ.”
To, “elamba ya likoló.”