Ndenge ekomamá na Matai 27:1-66

  • Bapesi Yesu na mabɔkɔ ya Pilate (1, 2)

  • Yudasi amitye nsinga na nkingo (3-10)

  • Yesu liboso ya Pilate (11-26)

  • Basoda batyoli Yesu (27-31)

  • Babaki Yesu na nzete na bansɛtɛ na Golgota (32-44)

  • Liwa ya Yesu (45-56)

  • Kokundama ya Yesu (57-61)

  • Lilita ebatelami malamu mpenza (62-66)

27  Ntango ntɔngɔ etanaki, banganga-nzambe bakonzi nyonso mpe bankulutu ya ekólo basalelaki Yesu likita mpo na koluka ndenge ya koboma ye.+  Nsima ya kokanga ye bansinga, bakendaki na ye mpe bakabaki ye epai ya Pilate, oyo azalaki guvɛrnɛrɛ.+  Bongo ntango Yudasi, oyo atɛkaki ye, amonaki ete bakateli Yesu etumbu, ayokaki motema mpasi mpe akendaki kozongisela banganga-nzambe bakonzi ná bankulutu mbongo yango ya bibende 30 ya palata,+  alobi: “Nasali lisumu ndenge natɛki moto oyo asali likambo te.* Bango balobaki: “Yango etali biso na nini? Etali yo moko!”  Bongo abwakaki mbongo yango ya bibende ya palata na tempelo mpe atikaki bango. Na nsima akendaki komitya nsinga na nkingo.+  Kasi banganga-nzambe bazwaki mbongo yango ya bibende ya palata mpe balobaki: “Epesami nzela te kotya yango na esika babombaka biloko mosantu, mpo ezali mbongo ya makila.”  Nsima ya koyokana bango nyonso, basombaki na mbongo yango elanga ya moyemi-mbɛki mpo ezala esika ya kokunda bapaya.  Yango wana, babengaka elanga yango Elanga ya Makila+ tii na mokolo ya lelo.  Bongo makambo oyo elobamaki na nzela ya mosakoli Yirimia ekokisamaki, ete: “Mpe bazwaki mbongo ya bibende 30 ya palata, ntalo oyo batyelaki moto yango, ntalo oyo bana mosusu ya Yisraele batyelaki ye, 10  mpe bapesaki yango mpo na elanga ya moyemi-mbɛki, ndenge Yehova* apesaki ngai mitindo.”+ 11  Sikoyo Yesu atɛlɛmaki liboso ya guvɛrnɛrɛ; mpe guvɛrnɛrɛ atunaki ye: “Yo ozali Mokonzi ya Bayuda?” Yesu azongisaki: “Yo moko olobi yango.”+ 12  Kasi, ntango banganga-nzambe bakonzi ná bankulutu bazalaki kofunda ye, ayanolaki te.+ 13  Bongo Pilate alobaki na ye: “Ozali koyoka te ebele ya makambo oyo bazali kofunda yo na yango?” 14  Kasi apesaki ye eyano te, ɛɛ, ata liloba moko te, mpe guvɛrnɛrɛ akamwaki mingi. 15  Nzokande na fɛti nyonso, guvɛrnɛrɛ azalaki na momeseno ya kobimisela ebele ya bato mokangami moko na bolɔkɔ, oyo bango bazalaki kopona.+ 16  Na ntango wana, ezalaki na moto moko na bolɔkɔ oyo ayebanaki mingi, nkombo na ye ezalaki Barabasi. 17  Na yango, ntango bayanganaki esika moko, Pilate atunaki bango: “Bolingi nabimisela bino nani, Barabasi to Yesu oyo abengami Kristo?” 18  Mpo Pilate ayebaki ete ezalaki kaka mpo na likunya nde bakabaki ye. 19  Lisusu, ntango afandaki na kiti ya kosambisa, mwasi na ye atindelaki ye maloba oyo: “Kokɔta na likambo ya moto ya sembo wana te, mpo lelo namoni mpasi mingi na ndɔtɔ mpo na ye.” 20  Kasi banganga-nzambe bakonzi mpe bankulutu bandimisaki ebele ya bato ete básɛnga Barabasi,+ kasi Yesu abomama.+ 21  Bongo guvɛrnɛrɛ alobaki na bango: “Kati na bango mibale, bolingi nabimisela bino nani?” Bango balobaki: “Barabasi.” 22  Pilate alobaki na bango: “Bongo nasala nini na Yesu oyo abengami Kristo?” Bango nyonso balobaki: “Baká ye na nzete!”*+ 23  Alobaki: “Mpo na nini? Mabe nini asali?” Atako bongo bakobaki koganga lisusu makasi koleka ete: “Baká ye na nzete!”+ 24  Lokola amonaki ete yango ebimisaki eloko te, kaka yikiyiki nde ezalaki koya makasi, Pilate azwaki mai mpe asukolaki mabɔkɔ na ye liboso ya ebele ya bato yango, alobi: “Ngai nazali na ngambo te na makila ya moto oyo. Yango etali bino moko.” 25  Bongo bato nyonso bazongisaki: “Makila na ye ezala na mitó na biso mpe ya bana na biso.”+ 26  Bongo abimiselaki bango Barabasi, kasi atindaki bábɛta Yesu fimbo+ mpe akabaki ye mpo bábaka ye na nzete.+ 27  Bongo basoda ya guvɛrnɛrɛ bamemaki Yesu na ndako ya guvɛrnɛrɛ mpe bayanganisaki etuluku mobimba ya basoda zingazinga na ye.+ 28  Balongolaki ye bilamba, mpe balatisaki ye elamba moko ya motane makasi,+ 29  mpe batongaki motole ya nzubɛ mpe balatisaki ye yango na motó mpe basimbisaki ye mwa nzete na lobɔkɔ na ye ya mobali. Mpe, bazalaki kofukama liboso na ye, bazalaki kosɛka ye, balobi: “Mbote,* yo Mokonzi ya Bayuda!” 30  Babwakelaki ye nsoi,+ bazwaki mwa nzete yango mpe babandaki kobɛta ye na motó. 31  Nsukansuka, ntango basilisaki kosɛka ye, balongolaki ye elamba yango mpe balatisaki ye bilamba na ye.* Na nsima bamemaki ye mpo bábaka ye na nzete na bansɛtɛ.+ 32  Ntango bazalaki kobima, bamonaki moto moko ya mboka Sirene, na nkombo Simo. Bazwaki ye na makasi mpo amemela Yesu nzete na ye ya mpasi.*+ 33  Ntango bakómaki na esika babengi Golgota, elingi koloba, Esika ya mokuwa ya motó,+ 34  bapesaki Yesu vinyo oyo basangisi na mai ya bololo* mpo amɛla;+ kasi nsima ya komeka yango, aboyaki komɛla yango. 35  Ntango babakaki ye na nzete na bansɛtɛ, bakabolaki bilamba na ye ya likoló nsima ya kobwaka mbɛsɛ.+ 36  Mpe bafandaki kuna mpo na kokɛngɛla ye. 37  Batyaki mpe likoló ya motó na ye likomi ya likambo oyo bafundaki ye na yango, ete: “Oyo ezali Yesu Mokonzi ya Bayuda.”+ 38  Bongo babakaki miyibi mibale na nzete pembeni na ye, moko na lobɔkɔ na ye ya mobali mpe mosusu na lobɔkɔ na ye ya mwasi.+ 39  Baleki-nzela babandaki kofinga ye,+ bazalaki koningisa mitó na bango+ 40  mpe koloba: “Yo moto olingaki kobuka tempelo mpe kotonga yango na mikolo misato,+ omibikisa yo moko! Soki ozali mwana ya Nzambe, kitá na nzete ya mpasi!”*+ 41  Ndenge moko mpe banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli mpe bankulutu babandaki kosɛka ye mpe koloba:+ 42  “Abikisaki basusu; akoki komibikisa ye moko te! Soki azali Mokonzi ya Yisraele;+ akita sikoyo na nzete ya mpasi,* mpe tokondimela ye. 43  Atyelaki Nzambe motema; Ye abikisa ye sikoyo soki alingi ye,+ mpo azalaki koloba: ‘Ngai nazali Mwana ya Nzambe.’”+ 44  Ndenge moko mpe, ata miyibi oyo babakamaki pembeni na ye bazalaki kolobela ye mabe.+ 45  Kobanda na midi,* molili ekɔtaki na mokili yango mobimba, tii na ngonga ya misato* ya nsima ya midi.+ 46  Pene na ngonga ya misato nsima ya midi,* Yesu abelelaki na mongongo makasi ete: “Eli, Eli, lama sabakatani?” elingi koloba: “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai?”+ 47  Ntango bayokaki bongo, bato mosusu na kati ya bato oyo batɛlɛmaki wana babandaki koloba: “Moto oyo azali kobenga Eliya.”+ 48  Mpe na mbala moko moto moko na kati na bango akendaki mbangu kozwa linyuka, apɔlisaki linyuka yango na vinyo ya ngayi, atyaki yango na nsɔngɛ ya mwa nzete mpe apesaki ye amɛla.+ 49  Kasi basusu balobaki: “Tiká ye! Tótala soki Eliya akoya kobikisa ye.” 50  Lisusu, Yesu agangaki na mongongo makasi, mpe azongisaki elimo na ye.*+ 51  Mpe talá! rido ya esika mosantu+ epasukaki na biteni mibale,+ banda na likoló tii na nse,+ na nsima mabele eninganaki, mpe mabanga epasukaki. 52  Mpe malita* efungwamaki mpe bibembe mingi ya basantu oyo balalá na liwa ebimaki 53  (mpe bato oyo bautaki na malita yango nsima ya lisekwa ya Yesu bakɔtaki na engumba mosantu*), mpe bato mingi bamonaki yango. 54  Kasi ntango mokonzi ya basoda mpe baoyo bazalaki kokɛngɛla Yesu bamonaki koningana ya mabele mpe makambo oyo esalemaki, babangaki mingi, mpe balobaki: “Ya solo, moto oyo azalaki Mwana ya Nzambe.”+ 55  Ezalaki mpe na basi mingi oyo bazalaki kotala na mosika; bango bazalaki kotambola na Yesu banda na Galile, mpo na kosalela ye.+ 56  Kati na bango ezalaki na Maria Magadalene, Maria mama ya Yakobo ná Yose, mpe mama ya bana ya Zebede.+ 57  Pene na mpokwa, mozwi moko ya Arimatea nkombo na ye Yozefe ayaki; ye mpe akómaki moyekoli ya Yesu.+ 58  Mobali yango akendaki epai ya Pilate mpe asɛngaki nzoto ya Yesu.+ Bongo Pilate apesaki mitindo ete bápesa ye yango.+ 59  Yozefe azwaki nzoto yango, azingaki yango na lini* ya pɛto mpe ya kitoko,+ 60  mpe alalisaki yango na lilita* na ye ya sika,+ oyo atimolaki na mabanga. Mpe, nsima ya kobalola libanga moko ya monene tii na monɔkɔ ya lilita* yango, akendaki. 61  Kasi Maria Magadalene ná Maria mosusu bazalaki kaka wana, bafandi liboso ya lilita yango.+ 62  Na mokolo oyo elandaki, elingi koloba nsima ya mokolo ya Bolɛngɛli,+ banganga-nzambe bakonzi ná Bafarisai bayanganaki liboso ya Pilate, 63  balobi: “Nkolo, tokanisi lisusu ete, ntango moto wana ya lokuta azalaki na bomoi, alobaki: ‘Nakosekwa nsima ya mikolo misato.’+ 64  Yango wana, pesá mitindo ete bábatela lilita tii na mokolo ya misato, noki bayekoli na ye báya koyiba nzoto na ye+ mpe báloba na bato ete: ‘Alamuki uta na liwa!’ mpe bokosi ya mbala oyo ekozala mabe mingi koleka oyo ya liboso.” 65  Pilate azongiselaki bango: “Bózwa etuluku moko ya basoda mpo na kokɛngɛla lilita yango ndenge bolingi.” 66  Bongo bakendaki kobatela lilita yango mpe batyaki elembo na libanga mpe batyaki bakɛngɛli.

Maloba na nse

Lil., “makila oyo esali likambo te.”
Talá Ap. A5.
To, “Bomá ye!”
To, “Losako.”
To, “bilamba na ye ya likoló.”
To, “mai ya nsɔngi.”
Lil., “Na ngonga ya motoba.”
Lil., “Pene na ngonga ya libwa.”
Lil., “pene na ngonga ya libwa.”
To, “akataki motema.”
To, “malita ya kokanisama.”
Elingi koloba, “Yerusaleme.”
To, “elamba.”
To, “lilita ya kokanisama.”
To, “lilita ya kokanisama.”