Nehemia 9:1-38

  • Bato bayamboli masumu na bango (1-38)

    • Yehova, Nzambe oyo alimbisaka (17)

9  Na mokolo ya 24 ya sanza yango, Bayisraele bayanganaki. Bakilaki bilei, balataki ngɔtɔ* mpe bamisopelaki putulu.+  Bongo baoyo bazalaki mpenzampenza Bayisraele bakabwanaki na bapaya nyonso,+ na nsima batɛlɛmaki mpe bayambolaki masumu na bango moko mpe mabunga ya batata na bango.+  Batɛlɛmaki kaka na esika bazalaki mpe batángaki na mongongo makasi buku ya Mobeko+ ya Yehova Nzambe na bango ngonga misato. Mpe na boumeli ya ngonga misato mosusu, bayambolaki masumu na bango mpe bagumbamaki liboso ya Yehova Nzambe na bango.  Yeshua, Bani, Kadimiele, Shebania, Buni, Sherebia,+ Bani ná Kenani batɛlɛmaki na estrade+ ya Balevi mpe bazalaki kobelela Yehova Nzambe na bango na mongongo makasi.  Mpe Yeshua, Kadimiele, Bani, Hashabeneya, Sherebia, Hodia, Shebania ná Petaya, bango nyonso Balevi, balobaki: “Bótɛlɛma, mpe bósanzola Yehova Nzambe na bino libela na libela.*+ Mpe tiká básanzola nkombo na yo ya nkembo, oyo ezali monene koleka mapamboli mpe masanzoli nyonso oyo bato bakoki kopesa.  “Kaka yo moko nde ozali Yehova.+ Yo nde osalaki likoló, ɛɛ, likoló na bonene na yango nyonso* mpe limpinga na yango nyonso, ná mabele mpe nyonso oyo ezali likoló na yango, ná mai minene* mpe nyonso oyo ezali na kati na yango. Ozali kobatela yango nyonso na bomoi, mpe limpinga ya likoló ezali kogumbama liboso na yo.  Yo ozali Yehova Nzambe ya solo, yo moto oponaki Abrama;+ olongolaki ye na Ure+ engumba ya Bakaladea mpe opesaki ye nkombo Abrahama.+  Omonaki ete motema na ye ezali sembo epai na yo,+ yango wana osalaki ná ye kondimana ete okopesa ye ná libota* na ye+ mokili ya Bakanana, ya Bahiti, ya Baamore, ya Baperizi, ya Bayebusi mpe ya Bagirigashe. Mpe okokisaki bilaka na yo, mpo ozali sembo.*  “Na yango omonaki mpasi ya bankɔkɔ na biso na Ezipito,+ mpe oyokaki kolela na bango pene na Mbu Motane. 10  Bongo obimisaki bilembo mpe osalaki makamwisi mpo na kotɛmɛla Farao ná basaleli na ye nyonso mpe bato nyonso ya mokili na ye,+ mpo oyebaki ete basalelaki bato na yo makambo na lofundo.+ Omisalelaki nkombo oyo ezali na lokumu tii lelo.+ 11  Okabolaki mai ya mbu liboso na bango, mpe bakatisaki na kati ya mbu na mabele oyo ekauki.+ Mpe baoyo bazalaki kolanda bango, obwakaki bango na bozindo, lokola libanga oyo babwaki na kati ya mai oyo etomboki.+ 12  Na moi, okambaki bango na likonzí ya lipata, mpe na butu na likonzí ya mɔtɔ, mpo na kongɛngisela bango nzela oyo basengelaki kokende.+ 13  Okitaki na Ngomba Sinai+ mpe osololaki na bango longwa na likoló.+ Opesaki bango bikateli ya lisambisi oyo ezali sembo, mibeko oyo ezali solo,* malako mpe mitindo oyo ezali malamu.+ 14  Oteyaki bango bátosa Sabata na yo mosantu,+ mpe opesaki bango mitindo, malako mpe mobeko na nzela ya mosaleli na yo Moize. 15  Opesaki bango mampa longwa na likoló ntango bazalaki na nzala,+ mpe obimiselaki bango mai na libanga ntango bayokaki mposa ya mai.+ Mpe oyebisaki bango bákɔta mpe bázwa mokili oyo olapaki ndai* ete okopesa bango. 16  “Kasi bango, bankɔkɔ na biso, basalaki makambo na lofundo+ mpe bakómaki mitó makasi,*+ mpe bazalaki koyoka mitindo na yo te. 17  Baboyaki koyoka,+ mpe babosanaki misala na yo ya kokamwa oyo osalaki kati na bango. Nzokande bakómaki mitó makasi* mpe baponaki mokambi mpo na kozonga na boombo na bango na Ezipito.+ Kasi ozali Nzambe oyo asepelaka kolimbisa,* ya ngɔlu* mpe ozalaka na motema mawa, oyokaka nkanda noki te mpe otondi na bolingo ya sembo,*+ mpe osundolaki bango te.+ 18  Bamisalelaki ekeko ya mwana-ngɔmbɛ ya ebende* mpe babandaki koloba: ‘Talá Nzambe na yo oyo abimisaki yo na Ezipito,’+ mpe basalaki makambo mingi oyo ezangi limemya. 19  Atako bongo, mpo na motema mawa monene oyo ozali na yango, osundolaki bango te na esobe.+ Likonzí ya lipata elongwaki te likoló na bango na moi mpo na kokamba bango na nzela, mpe na butu likonzí ya mɔtɔ ezalaki kongɛngisa nzela oyo basengelaki kolanda.+ 20  Mpe opesaki bango elimo na yo ya malamu mpo bákóma na bososoli,+ oboyaki te kopesa bango mana na yo,+ mpe opesaki bango mai ntango bayokaki mposa ya mai.+ 21  Mbula 40 na esobe, opesaki bango bilei.+ Bazangaki eloko te. Bilamba na bango ebebaki te,+ mpe makolo na bango evimbaki te. 22  “Opesaki bango bikólo mpe bato na yango, okabolelaki bango yango ndambondambo,+ bongo bazwaki mokili ya Sihone,+ elingi koloba, mokili ya mokonzi ya Heshibone,+ mpe mokili ya Oge+ mokonzi ya Bashane. 23  Osalaki ete bana na bango bákóma mingi lokola minzoto ya likoló.+ Na nsima okɔtisaki bango na mokili oyo olakaki bankɔkɔ na bango ete bakokɔta mpe bakozwa yango.+ 24  Bongo bana na bango bakɔtaki mpe bazwaki mokili yango.+ Otyaki na nse ya bokonzi na bango Bakanana,+ oyo bazalaki kofanda na mokili yango, mpe opesaki na mabɔkɔ na bango bakonzi na bango ná bato ya bikólo ya mokili yango, mpo básala bango ndenge balingi. 25  Mpe babɔtɔlaki bingumba oyo ebatelami makasi+ ná mabele oyo ebotaka malamu,+ mpe bazwaki bandako oyo etondi na biloko ya malamu ndenge na ndenge, mabulu oyo basilá kotimola mpo na kobomba mai, bilanga ya vinyo, bilanga ya olive+ ná ebele ya banzete oyo ebotaka mbuma; bongo balyaki mpe batondaki, bakómaki mafutamafuta, mpe bazalaki kosepela na bolamu na yo monene. 26  “Kasi, bazangaki botosi, batombokelaki yo+ mpe bapesaki Mobeko na yo mokɔngɔ.* Babomaki basakoli na yo, oyo bazalaki kokebisa bango mpo na kosalisa bango bázongela yo, mpe basalaki makambo mingi oyo ezangi limemya.+ 27  Mpo na yango, opesaki bango na mabɔkɔ ya banguna na bango,+ oyo bazalaki se komonisa bango mpasi.+ Kasi na kati ya mpasi na bango, bazalaki kobelela yo mpe yo ozalaki koyoka bango kuna na likoló. Mpe mpo na motema mawa monene oyo ozali na yango, ozalaki kopesa bango bato mpo bábikisa bango na mabɔkɔ ya banguna na bango.+ 28  “Kasi ntango kaka bazalaki kopema mwa moke, bazalaki lisusu kosala makambo oyo ezali mabe na miso na yo,+ mpe ozalaki kosundola bango na mabɔkɔ ya banguna na bango, oyo bazalaki kokonza* bango.+ Bongo bazalaki kozongela yo mpe kobelela yo mpo osalisa bango,+ mpe ozalaki koyoka bango kuna na likoló mpe kobikisa bango mbala na mbala, mpo na motema mawa na yo monene.+ 29  Ozalaki kokebisa bango mpo na kosalisa bango bázongela Mobeko na yo. Kasi bazalaki kosala makambo na lofundo mpe baboyaki koyoka mitindo na yo.+ Basalaki lisumu mpo batosaki malako na yo te, oyo epesaka bomoi na moto oyo atosi yango.+ Kasi bazalaki kaka kopesa yo mokɔngɔ, bazalaki mitó makasi,* mpe baboyaki koyoka yo. 30  Omoniselaki bango motema molai+ bambula mingi mpe ozalaki kaka kokebisa bango na elimo na yo, na nzela ya basakoli na yo, kasi baboyaki koyoka. Nsukansuka opesaki bango na mabɔkɔ ya bato ya bikólo ya mikili yango.+ 31  Mpe na motema mawa monene oyo ozali na yango, osilisaki bango nyonso te+ mpe osundolaki bango te, mpo ozali Nzambe ya ngɔlu* mpe ya motema mawa.+ 32  “Mpe sikoyo, Ee Nzambe na biso, Nzambe monene, ya nguya mpe ya nsɔmɔ, oyo abatelaka kondimana na ye mpe amonisaka bolingo ya sembo,+ komona mpamba te bampasi nyonso oyo ekómeli biso, bakonzi na biso, bankumu na biso,+ banganga-nzambe na biso,+ basakoli na biso,+ bankɔkɔ na biso ná bato na yo nyonso, banda na mikolo ya bakonzi ya Asiri+ tii na mokolo ya lelo. 33  Na makambo nyonso oyo ekómeli biso, omonisi ete ozali sembo* mpo osali makambo na bosembo. Kasi biso tosalaki makambo na motema mabe.+ 34  Bakonzi na biso, bankumu na biso, banganga-nzambe na biso ná bankɔkɔ na biso batosaki Mobeko na yo te; batyaki mpe likebi te na mitindo na yo mpe na makundoli* na yo oyo opesaki mpo na kokebisa bango. 35  Ata ntango bazalaki na bokonzi na bango mpe bazalaki kosepela na ebele ya biloko ya malamu oyo ozalaki kopesa bango, mpe bazalaki na mokili monene oyo opesaki bango, oyo ebotaka malamu, basalelaki yo te+ mpe batikaki te makambo ya mabe oyo bazalaki kosala. 36  Sikoyo lelo tozali baombo,+ ɛɛ, baombo na mokili oyo opesaki bankɔkɔ na biso mpo bálya mbuma na yango mpe biloko na yango ya malamu. 37  Ebele ya biloko oyo ebotaka na mboka yango ezali mpo na bakonzi oyo otyelaki biso mpo na masumu na biso.+ Bazali kokonza biso* ná banyama na biso, ndenge balingi, mpe biso tozali na mpasi monene. 38  “Na yango, na kotalela nyonso wana, tosali boyokani ya makasi+ oyo tokomi na mokanda mpe bankumu na biso, Balevi na biso mpe banganga-nzambe na biso batye yango kashɛ.”+

Maloba na nse

To, “seko na seko.”
To, “likoló, mosika kuna na likoló.”
To, “mbu.”
Lil., “momboto.”
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “mibeko ya kotyela motema.”
Lil., “otombolaki lobɔkɔ na yo.”
Lil., “bakómisaki nkingo na bango makasi.”
Lil., “bakómisaki nkingo na bango makasi.”
To, “Nzambe ya misala ya kolimbisa.”
To, “oyokelaka bato mawa.”
To, “motema boboto.”
To, “ya ebende oyo enyangwisami.”
Lil., “babwakaki Mobeko na yo nsima ya mokɔngɔ na bango.”
To, “konyata.”
Lil., “bakómisaki nkingo na bango makasi.”
To, “oyo ayokelaka bato mawa.”
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “makebisi.”
Lil., “nzoto na biso.”