Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA | BAKISÁ ESENGO NA YO NA MOSALA YA KOSAKOLA

Salisá bato oyo oyekolaka na bango Biblia bátika bizaleli mabe

Salisá bato oyo oyekolaka na bango Biblia bátika bizaleli mabe

Kaka bato oyo bazali pɛto na bizaleli nde bakoki kosala boninga makasi ná Yehova. (1Pe 1:14-16) Ntango bayekoli ya Biblia bazali kosala makasi bátika bizaleli mabe, yango ekoki komemela bango matomba, na ndakisa na libota, na nzoto, to mpe na makambo ya mbongo.

Limbwelá polele moyekoli na yo mitinda ya Yehova na oyo etali bizaleli malamu, ntina na yango mpe matomba oyo akoki kozwa soki asaleli yango. Salá makasi osalisa bayekoli na yo ya Biblia bábongola ndenge na bango ya kokanisa, yango ekosalisa bango básala oyo Yehova alingi. (Ef 4:22-24) Salisá bango báyeba ete na lisalisi ya Yehova bakoki kolonga bizaleli mabe oyo ebotá misisa na mitema na bango. (Flp 4:13) Teyá bango ete basengeli kobondelaka Yehova wana bamekami mpo na kosala lisumu. Salisá bango báyeba makambo oyo ekoki kotya bango na komekama mpe ndenge bakoki kokima yango. Lendisá bango básalaka makambo ya malamu na esika ya kosala makambo ya mabe oyo bamesanaki kosala. Toyokaka esengo ntango tomonaka bayekoli ya Biblia batiki mimeseno ya mabe na lisalisi ya Yehova.

TALÁ VIDEO SALISÁ BATO OYO OYEKOLAKA NA BANGO BIBLIA BÁTIKA BIZALELI MABE, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Bankulutu mpe Neeta basilikaki ntango bayebaki ete Rose azali na ezaleli moko ya mabe?

  • Ndenge nini Neeta asalisaki Rose?

  • Ndenge nini Rose alukaki lisalisi epai ya Yehova?