Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 122

Tópikama makasi, tóninganaka te!

Tópikama makasi, tóninganaka te!

(1 Bakorinti 15:58)

  1. 1. Bato basili mayele lelo.

    Baz’obang’oy’ez’oya liboso.

    Kasi biso tokoningana te,

    Tókangama na Nzambe.

    (MONDIMO)

    Ɛɛ, tópikama mpenza;

    Mokili, tókim’ango;

    Tópikama bongo,

    Tii bomoi ya seko.

  2. 2. Satan’atye mitambo ebele.

    Tókeba makanisi’ebeba te.

    Tóyin’eloko nyonso ya mabe,

    Akokweisa biso te.

    (MONDIMO)

    Ɛɛ, tópikama mpenza;

    Mokili, tókim’ango;

    Tópikama bongo,

    Tii bomoi ya seko.

  3. 3. Sambelá Yah na motema moko.

    Yo mpe bundá na mosal’a Nkolo.

    Sakolá Bokonzi, kotika te.

    Nsuk’eza’ mosika te.

    (MONDIMO)

    Ɛɛ, tópikama mpenza;

    Mokili, tókim’ango;

    Tópikama bongo,

    Tii bomoi ya seko.

(Talá mpe Luka 21:9; 1 Pe. 4:7.)