Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 13

Kristo, ndakisa na biso

Kristo, ndakisa na biso

(1 Petro 2:21)

  1. 1. Yehova, bolingo,

    Ye mpenza boboto,

    Akabi Mwana na ye mpo na biso.

    Kristo ayei na nse​—

    Mwan’a moto nde ye​—

    Akumisaki Nzambe, Landá ye.

  2. 2. Lilob’a Tata n’e,

    Nde bilei na ye.

    Epesaki ye boyebi mpe bwanya.

    Ye moombo’a Nzambe,

    Tózala neti ye.

    Mposa na ye se Nzamb’asepela.

  3. 3. Biso mpe tósala

    lokola Masiya,

    Tókumisa Yah bomoi mobimba.

    Yesu’azala seko

    Ndakisa na biso,

    Yehov’akopambola nga’ ná yo.