Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 149

Loyembo ya bolongi

Loyembo ya bolongi

(Kobima 15:1)

  1. 1. Tóyembela Yah. Nkombo na ye ezwi lokumu.

    Na mai monene, azindisi banguna.

    Nguya n’e, nsuka;

    Longola Ye mosusu’aza’ te.

    Nkombo n’e Yehova,

    Alongi’etumba mpenza.

    (MONDIMO)

    Yehova, yo oleki nyonso,

    Banda kala obongwanaka te,

    Olingi’oboma banguna na yo,

    Osantisa nkombo na yo.

  2. 2. Ata mpe lelo, bikólo’etɛmɛli Yehova.

    Lokola Farao,

    bakosambwa bango mpe.

    Mpe bakolela;

    Bakokufa n’Armagedone.

    Bakoyeba mpenza

    Yehova aza’ Nzambe.

    (MONDIMO)

    Yehova, yo oleki nyonso,

    Banda kala obongwanaka te,

    Olingi’oboma banguna na yo,

    Osantisa nkombo na yo.