Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 44

Libondeli ya moto ya komikitisa

Libondeli ya moto ya komikitisa

(Nzembo 4:1)

  1. 1. Yehova naz’obondela yo Nzambe,

    yoká nga’.

    Bampota ya motema

    na ng’ekosila nde te?

    Nalɛmbi nzoto mpo

    makambo’eza’ kosimba te.

    Mobɔndisi na nga’, Yehova,

    yo salisá nga’.

    (MONDIMO)

    Nzambe na nga’, salisá nga’.

    Ntango’elikya esili nga’.

    Nakoka kotalela yo.

    Makasi’euta nde na yo.

  2. 2. Liloba na yo mai na nga’

    ntango nalɛmbi,

    Ebɔndisaka ngai na

    bampasi na ngai.

    Pesá nga’ kondima na nzel’a

    Liloba na yo.

    Nabosana te bozindo

    ya bolingo na yo.

    (MONDIMO)

    Nzambe na nga’, salisá nga’.

    Ntango’elikya esili nga’.

    Nakoka kotalela yo.

    Makasi’euta nde na yo.