Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 73

Pesá biso mpiko

Pesá biso mpiko

(Misala 4:29)

  1. 1. Na mosal’a kosakola

    Bokonzi mpe nkombo n’o,

    Batɛmɛli baza’ mingi,

    Baz’okitisa biso.

    Tokobanga bango te,

    Tokotosa kaka yo nde.

    Pesá biso elimo na yo;

    Ee Yehova, yoká biso.

    (MONDIMO)

    Pesá mpiko tósakola;

    Salisá tóbanga te.

    Mpo nsang’oy’epalangana,

    Pesá biso molende.

    Armagedon’ebɛlɛmi,

    Awa toz’ozela yango,

    Pesá mpiko tósakola.

    Tosɛngi yo.

  2. 2. Oyebi toza’ putulu,

    Tokoki kobanga mpe.

    Kasi ndenge olakaki,

    Okobatela biso.

    Baz’okanela biso,

    Yah, landelá makamb’oyo.

    Sungá biso nyonso tókoba

    Kosakola nkombo na yo.

    (MONDIMO)

    Pesá mpiko tósakola;

    Salisá tóbanga te.

    Mpo nsang’oy’epalangana,

    Pesá biso molende.

    Armagedon’ebɛlɛmi,

    Awa toz’ozela yango,

    Pesá mpiko tósakola.

    Tosɛngi yo.