Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 76

Oyokaka nini?

Oyokaka nini?

(Baebre 13:15)

  1. 1. Oyokaka nini

    ntang’oz’oteya mingi,

    Ntang’oyebi oteyi

    moto asepeli?

    Osali oy’a yo;

    Nzamb’akosala ya ye.

    Ayebi bato nyonso

    ya mitema sembo.

    (MONDIMO)

    Nayokaka mpenz’esengo,

    ya kobomela Yah nzoto.

    Mbek’a masanzoli oyo,

    nakopesa seko.

  2. 2. Oyokaka nini

    ntango maloba na yo

    Esepelisi bato

    babongi na bomoi?

    Basusu bakoki

    nde kokanga matoi,

    Kasi tokotika te

    komema nkombo n’e.

    (MONDIMO)

    Nayokaka mpenz’esengo,

    ya kobomela Yah nzoto.

    Mbek’a masanzoli oyo,

    nakopesa seko.

  3. 3. Oyokaka nini

    na ndenge Yah andimi

    Osala mosal’oyo

    mpe az’osunga yo?

    Tokoteya bato

    na boboto mpe mpiko,

    Tóbunda mpo mosala

    elingi esila.

    (MONDIMO)

    Nayokaka mpenz’esengo,

    ya kobomela Yah nzoto.

    Mbek’a masanzoli oyo,

    nakopesa seko.