Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bosembo ekozala mokolo mosusu awa na mabele?

Bosembo ekozala mokolo mosusu awa na mabele?

 Ezali lokola ete kozanga bosembo ezali na mabele mobimba. Tótalela kaka bandakisa mibale ya bato oyo bakangamaki kozanga ete básala likambo ya mabe:

  •   Na sanza ya 01/2018, zuzi moko ya États-Unis apesaki nzela bábimisa na bolɔkɔ mobali moko oyo asalaki mbula pene na 38. Babimisaki ye mpo ekzamɛ ya ADN oyo basalaki ye emonisaki ete asalaki eloko te.

  •   Na sanza ya 09/1994, na Afrika, bilenge mibali misato bakangamaki na bolɔkɔ mpo baboyaki kopesa mabɔkɔ na mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango. Mpe na sanza ya 09/2020, bakokisaki mbula 26 na bolɔkɔ kozanga ete bákatela bango etumbu na kolanda mibeko to básambisa bango na tribinale.

 Soki okutaná na makambo ya kozanga bosembo, okoki komiyoka lokola Yobo oyo alobaki: “Nazali se kobelela mpo na kosɛnga lisalisi, kasi bosembo ezali te.” (Yobo 19:7) Atako bosembo ya solosolo ekoki komonana lokola ndɔtɔ, Biblia elaki ete ezali na mokolo oyo bato oyo balukaka bosembo bakozwa yango. Na yango, bwanya oyo ezali na Biblia ekoki kosalisa yo okanga motema na makambo ya kozanga bosembo.

Kozanga bosembo eutaka wapi?

 Kozanga bosembo eutaka epai ya bato oyo baboyaka litambwisi ya Nzambe. Biblia emonisaka ete bosembo ya solosolo eutaka epai ya Nzambe. (Yisaya 51:4) Na Biblia, maloba oyo ebongolami na “boyengebene” mpe “bosembo” ezali mpenza na boyokani. (Nzembo 33:5) Misala ya boyengebene mpe ya bosembo, to oyo ezali malamu na kolanda mibeko ya Nzambe ememaka bosembo. Nzokande, kozanga bosembo eutaka na lisumu, oyo ebukaka mibeko ya Nzambe. Tótalela mwa bandakisa oyo elandi:

  •   Ezaleli ya koluka kaka matomba ya moto ye moko. Mposa ya moimi ná lisumu ezali mpenza na boyokani. (Yakobo 1:14, 15) Mpo na kozwa oyo balingi, bato mingi balyelaka basusu ndenge basalelaka bango makambo na kozanga bosembo. Nzokande, Nzambe alingaka tóluka liboso matomba ya basusu.​—1 Bakorinti 10:24.

  •   Kozanga koyeba. Bato mosusu basalelaka basusu makambo ya kozanga bosembo kozanga kutu báyeba, kasi Nzambe atalelaka yango kaka lokola lisumu. (Baroma 10:3) Kutu, kozanga koyeba etindaki bato básala likambo moko monene ya kozanga bosembo; elingi koloba, babomaki Yesu Kristo.​—Misala 3:15, 17.

  •   Bibongiseli ya bato ná makanisi na bango elongi te. Bato bakanisaka ete ebongiseli ya politiki, ya mombongo mpe ya mangomba nde esengeli kosalela bato nyonso makambo na bosembo. Kasi, mbala mingi, bibongiseli yango nde ezali kosala mabunga, kobimisa kanyaka, kopona bilongi, lokoso, kokómisa bato babola mpenza, mpe kokonza basusu​—nyonso wana ezali komema na makambo ya kozanga bosembo. Bibongiseli yango mosusu ezali kotambwisama na bato oyo bazali na makanisi malamu. Kasi lokola Nzambe azali kotambwisa bango te, bazali kolonga te.​—Mosakoli 8:9; Yirimia 10:23.

Ndenge nini Nzambe atalelaka kozanga bosembo?

 Ya solo, ayinaka kozanga bosembo, makanisi, mpe makambo nyonso oyo ebimisaka yango. (Masese 6:16-18) Na nzela ya elimo santu ya Nzambe, mosakoli Yisaya akomaki ete: “Ngai Yehova a nalingi bosembo, nayini moyibi ná kozanga boyengebene.”​—Yisaya 61:8.

 Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele ya kala emonisaki ete alingaka bato oyo basalelaka basusu makambo na bosembo. Apesaki bazuzi mitindo ete báboya kanyaka mpe makambo mosusu oyo ekoki kobebisa bosembo. (Kolimbola Mibeko 16:18-20) Apamelaki Bayisraele oyo batosaki ye te na ndenge bazalaki kolyela babola mpe bato mpamba, mpe aboyaki bango mpo batosaki te mibeko na ye.​—Yisaya 10:1-3.

Nzambe akotya nsuka na kozanga bosembo?

 Ɛɛ. Na nzela ya Yesu kristo, Nzambe akolongola lisumu, likambo oyo esalaka kozanga bosembo ezala, mpe akopesa bato nyonso nzoto ya kokoka. (Yoane 1:29; Baroma 6:23) Lisusu, atye Bokonzi moko oyo ekomema mokili ya sika ya boyengebene mpe ekosalela moto nyonso makambo na bosembo. (Yisaya 32:1; 2 Petro 3:13) Mpo na koyeba makambo mosusu mpo na Bokonzi yango ya likoló, talá video oyo elobi Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Bomoi ekozala ndenge nini na mokili ya sika ya boyengebene?

 Ntango bosembo ekotonda na mabele, yango ekomema kimya mpe moto nyonso akomiyoka ete abatelami. (Yisaya 32:16-18) Nzambe atalelaka bomoi ya moto nyonso ndenge moko, yango wana bakosalela moto nyonso makambo ndenge moko. Mawa, koganga mpe mpasi oyo eutaka na kozanga bosembo ekolongwa mpo na libela, ata mpe makanisi oyo etungisaka biso mpo na makambo ya kozanga bosembo ekolongwa mokemoke. (Yisaya 65:17; Emoniseli 21:3, 4) Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo oyo elobi “Bokonzi ya Nzambe ekosala makambo nini?

Osengeli mpenza kondimela elaka ya Nzambe oyo ete kozanga bosembo ekolongwa na mokili?

 Ɛɛ. Na makambo mingi Biblia emonisi ete bisakweli na yango ebongi kotyelama motema, eyokani na istware mpe siansi, Biblia na mobimba na yango ezali na boyokani, nyonso wana emonisi ete okoki kotyela bilaka na yango motema. Masolo oyo elandi ezali kopesa bandimbola mosusu:

Tokoki kobunda mpo na kozanga bosembo banda sikoyo?

 Basaleli ya Nzambe na ntango ya kala basalaki nyonso oyo esengeli mpo básalela bango te makambo ya kozanga bosembo. Na ndakisa, basalelaki ntoma Paulo makambo na kozanga bosembo oyo ekokaki komema ye tii na liwa. Na esika andima likambo yango kaka bongo, asalelaki makambo oyo endimami na mibeko mpe asɛngaki ete akende kosamba epai ya Kaisala.​—Misala 25:8-12 25:8-12.

 Kasi, milende nyonso oyo bato bazali kosala mpo na kozongisa bosembo na mabele ezali kosimba te. (Mosakoli 1:15) Yango wana, ebele ya bato bazali kondimela elaka ya Nzambe ya mokili ya sika, epai boyengebene ekozala mpe yango esalisi bango bázala na kimya na motema atako bazali kosalela bango makambo ya kozanga bosembo.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe.​—Nzembo 83:18.