Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

TheCrimsonMonkey/E+ via Getty Images

KAMPANYE YA SIPESIALE

Kobeba ya mabele​—Oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala

Kobeba ya mabele​—Oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala

 “Kobongwana ya klima ezali kobimisela bato, bingumba, mpe mokili mikakatano mingi. Mipɛpɛ ya makasi mpenza mpe ndenge oyo klima ezali kobeba, ezali kobebisa bandako mpe bomoi ya bato na mokili mobimba. Ba-océan ekómi mpenza mɔtɔ mpe bikelamu mingi ya bomoi oyo ezalaka na nse ya mai ekómi na likama.”​—Inger Andersen, secrétaire général adjoint des Nations Unies et directeur exécutif du Programme des Nations Unies pour l’environnement, 25/07/2023.

 Baguvernɛma ekokoka mpenza kosala elongo mpo na kosilisa mikakatano yango? Bazali mpenza na likoki ya kozwa solisyo ya solosolo?

 Biblia elobeli guvernɛma moko oyo ekosilisa mpenza mokakatano etali kobebisama ya mabele. Elobi ete “Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko,” to guvernɛma moko oyo ekotambwisa makambo na mabele mobimba. (Danyele 2:44) Na nse ya guvernɛma yango, bato “bakosala [bato mosusu] eloko moko te ya mabe” to mpe kobebisa mabele.​—Yisaya 11:9.