Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE OYO MAKABO NA YO ESALELAMAKA

Matɔnɔmatɔnɔ ebongoli bomoi ya bato

Matɔnɔmatɔnɔ ebongoli bomoi ya bato

01/10/2021

 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/06/1912 elobaki boye: “Bato mingi oyo basepelaka kotánga mikanda na biso bafandaka esika moko na bato oyo bakufá miso. Bato yango bakoki kozwa mikanda ofele. . . . Mikanda mpo na bato oyo bakufá miso ekomamaka na ekomeli ya bato oyo bakufá miso mpo bázala na likoki ya kotánga yango.” Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli yango ebakisaki boye: “Bato mingi oyo bakufá miso basepelaka mingi koyoka ete mapamboli kitoko ekozala na mokili na mikolo oyo ezali koya.”

 Ntango maloba yango ekomamaki, bikólo mingi epai bato balobaka Anglais bazalaki na ekomeli ndenge na ndenge ya bato oyo bakufá miso. Kasi, Batatoli ya Yehova basilaki kosala ete mateya ya solo ya Biblia ezala na ekomeli ya bato oyo bakufá miso. Tii sikoyo tozali kokoba kosala yango! Lelo oyo, tozali na mikanda na ekomeli ya bato oyo bakufá miso na minɔkɔ koleka 50. Esalemaka ndenge nini?

Bituluku ya matɔnɔ kobanda na moko tii motoba ebimisaka balɛtrɛ. Matɔnɔ oyo etombwani ebongisami mpo na kobimisa balɛtrɛ

Kokoma na ekomeli ya bato oyo bakufá miso mpe koyema makomi na ndenge oyo bakoki kosimba

 Likambo ya liboso ezali ya kokoma na ekomeli ya bato oyo bakufá miso to na braille. Michael Millen, oyo asalaka na Departema ya traitement du texte na Patterson, na New York, alobi boye: “Kala, tozalaki kosalela programɛ ya bato ya mombongo mpo na kokoma na ekomeli ya bato oyo bakufá miso, kasi ezalaki kosunga te mpo na minɔkɔ nyonso oyo tozalaki na yango mposa. Sikoyo tozali kosalela programɛ ya kobongola ya Watchtower, oyo ezali kosunga mpo na kobongola makomi na ekomeli ya bato oyo bakufá miso na minɔkɔ mingi na mokili mobimba. Nandimi te ete programɛ ya kobongola ndenge wana ezali epai mosusu na mokili.”

 Mikanda na ekomeli ya bato oyo bakufá miso ezalaka kaka te na makomi ya mikanda yango kasi mpe maloba oyo elimboli bililingi oyo ezali na kati. Na ndakisa, elilingi ya ezipeli ya buku Sepelá na bomoi libela na libela! na ekomeli ya bato oyo bakufá miso emonisami na lolengo oyo: “Mobali moko abandi kotambola na nzela oyo ezingami na milona, bangomba mike, mpe bangomba ya kitoko.” Jamshed, oyo azali moto akufá miso, mosaleli na misala mpe mobongisi-nzela, alobi boye: “Ndenge balimboli elilingi yango ezali na ntina mingi mpo na ngai.”

 Nsima ya kokoma na ekomeli ya bato oyo bakufá miso to braille, batindaka mikanda yango na babiro ya filiale oyo ezali na ba-imprimeri oyo ebimisaka mikanda na ekomeli ya bato oyo bakufá miso. Kuna, bafinaka mikanda yango na papye ya makasi oyo ekotɔbɔka te na ntango bazali kofina yango to oyo ekobeba te ntango bakosalela yango mbala na mbala. Na nsima, basangisaka nkasa na yango esika moko, balíngaka yango, mpe batindaka yango na masangá mbala na mbala to batindaka yango na baposte ya kotinda mikanda lokola “mikanda ofele ya kotánga mpo na bato oyo bakufá miso.” Soki esengeli, bafiliale ekozwa bibongiseli mpo na kotinda mikanda mpo bandeko oyo bakufá miso to baoyo bamonaka malamu te bázwa mikanda oyo basengeli na yango mpo na makita ya lisangá.

 Misala wana nyonso ezali kosɛnga ntango mpe mbongo mingi. Kutu, motángo ya bangonga oyo imprimeri na biso na Wallkill, na New York, esalaka mpo na kobimisa bakopi 50 000 ya Biblia ya bato nyonso ekokani na motángo ya bangonga oyo ezwaka mpo na kobimisa Biblia 2 na ekomeli ya bato oyo bakufá miso. Biblia mokomoko oyo maloba na yango eyeisami mokuse na ekomeli ya bato oyo bakufá miso na Anglais ezali na volimi 25, mpe bisaleli oyo esengeli mpo na kobimisa bavolimi yango ezwaka motuya ya mbongo mbala 123 koleka mbongo oyo esɛngisami mpo na kobimisa Biblia ya bato nyonso. a Kaka bizipeli mpamba ya Biblia moko ya volimi 25 ezwaka mbongo ya dolare soki 150!

Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na biteni mibale na ekomeli ya bato oyo bakufá miso na Anglais ezali na volimi 25!

 Ndenge nini bandeko oyo bapesaka mabɔkɔ mpo na kobimisa mikanda na ekomeli ya bato oyo bakufá miso bamiyokaka mpo na mosala na bango? Nadia, oyo asalaka na filiale ya Afrika ya Sudi, alobi boye: “Bandeko na biso oyo bakufá miso to baoyo bamonaka malamu te bazali na bomoi oyo ezali pɛtɛɛ te, yango wana namonaka yango lokola mapamboli mpo na kosala eloko moko mpo na kosalisa bango. Yango emonisi ete Yehova alingaka bango mingi mpenza.”

Yekolá kotánga Biblia na ekomeli ya bato oyo bakufá miso

 Kasi ezali boni soki moto moko oyo akufá miso akoki te kotánga Biblia na ekomeli ya bato oyo bakufá miso? Eleki mwa bambula, tobimisaki mwa buku Yekolá kotánga Biblia na ekomeli ya bato oyo bakufá miso na Anglais, na kati na yango okokuta braille ná makomi oyo ebimisami na masini. Ebongisami mpo na bato oyo bamonaka malamu te to bato oyo bakufá miso mpo básalela elongo. Mwa buku yango ezali na bisaleli oyo bato bakufá miso bakoki kosalela mpo na kokoma na ekomeli ya bato oyo bakufá miso. Moto oyo ayekolaka ekomeli ya bato oyo bakufá miso asalelaka bisaleli yango mpo na kobimisa balɛtrɛ na ekomeli ya bato oyo bakufá miso mpo na ye moko. Badevuare ya kokoma na ekomeli ya bato oyo bakufá miso esalisaka moyekoli abosana te ekomeli moko mpe esalisaka ye ayeba yango na kosimba kaka.

“Nakoki te kotika kotánga yango’”

 Ndenge nini bandeko oyo bakufá miso to bamonaka malamu te bazwelaka mikanda yango matomba? Ernst, oyo afandaka na Haiti, azalaki koyangana na makita ya lisangá, kasi azalaki te na mikanda na ekomeli ya bato oyo bakufá miso. Yango wana, asengelaki kokanga na motó makambo nyonso oyo akoloba na lisolo na ye na makita mpe kopesa biyano na eteni ya masolo ya mituna ná biyano. “Kasi sikoyo,” alobi boye: “Nakoki kotombola lobɔkɔ na ngai mpe kopesa biyano na ntango nyonso. Sikoyo nazali komiyoka ete nazali na bomoko elongo na bandeko na ngai. Biso nyonso tozali kozwa mateya ya Nzambe!”

 Ndeko Jan oyo azali nkulutu mpe amonaka malamu te, atambwisaka boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe boyekoli ya Biblia na lisangá, alobi boye: “Mikanda na biso ezalaka polele koleka mikanda mosusu nyonso na ekomeli ya bato oyo bakufá miso oyo natángá. Na ndakisa, tozali na banimero ya nkasa, maloba na nse ya lokasa oyo ezali pɛtɛɛ, mpe ezali kolakisa maloba oyo elimboli bililingi.”

 Ndeko mwasi Seon-ok, oyo azali mobongisi-nzela na Corée du Sud, azali moto oyo akufá matoi ná miso. Liboso, azalaki kolanda makita na elobeli ya bababa, kasi sikoyo akoki kotánga ye moko mokanda ya boyekoli ya Biblia. Alobi boye: “Mikanda mosusu na ekomeli ya bato oyo bakufá miso ekoki kozala mpasi kotánga mpo matɔnɔmatɔnɔ ezali te, milɔngɔ egumbami, mpe papye ezali moke mpenza. Kasi Batatoli ya Yehova basalelaka papye ya kitoko mpenza mpe esalaka ete matɔnɔmatɔnɔ eyokana, esalisaka ngai natánga na pɛtɛɛ nyonso.” Abakisi boye: “Kala, nazalaki koyekola mikanda oyo elimbolaka Biblia kaka na lisalisi ya bato mosusu. Kasi, sikoyo, nakoki koyekola ngai moko. Yango epesaka ngai esengo ntango namibongisaka mpo na makita ya lisangá pɔsɔ na pɔsɔ mpe kosangana na yango mpenza. Natángaka mikanda na biso nyonso na ekomeli ya bato oyo bakufá miso. Nakoki koloba ete nakoki te kotika kotánga yango.”

 Ndenge moko na mikanda na biso nyonso, mikanda na biso na ekomeli ya bato oyo bakufá miso ezalaka na maloba oyo: “Buku oyo ezali ya kotɛka te. Ebimisami mpo na koteya bato Biblia na mokili mobimba, mpe mbongo mpo na kosala mosala yango eutaka na makabo oyo bato bapesaka na bolingo na bango moko.” Matɔndi mingi ndenge opesaka makabo na kolanda malako ya donate.dan124.com. Ezaleli na yo ya kokaba esalisaka mpo na kobongisa mateya ya Nzambe mpo na bato nyonso, ezala mpe bato oyo bakufá miso to baoyo bamonaka malamu te.

a Na bikomeli mosusu ya bato oyo bakufá miso, maloba ezalaka mokuse mpo na kobatela bisika. Na ndakisa, na biteni mibale ya Biblia na ekomeli ya bato oyo bakufá miso, maloba oyo eyebani mingi mpe balɛtrɛ oyo esangisaka yango eyeisami mokuse. Na yango, buku moko na biteni mibale na ekomeli ya bato oyo bakufá miso eleki moke mingi buku ya ndenge wana oyo ezali na eteni moko na ekomeli ya bato oyo bakufá miso.