Lakisá makambo oyo ezali na kati

08/08/2019
PAYS-BAS

Utrecht, Pays-Bas—Liyangani oyo esangisaka mikili mingi ya Batatoli ya Yehova 2019 “Bolingo esilaka soki moke te”!

Utrecht, Pays-Bas—Liyangani oyo esangisaka mikili mingi ya Batatoli ya Yehova 2019 “Bolingo esilaka soki moke te”!
  • Dati: 02-04/08/2019

  • Esika: Jaarbeurs Hallencomplex, na Utrecht, Pays-Bas

  • Programɛ esalemaki na minɔkɔ oyo: Anglais, Arabe, elobeli ya bababa ya Néerlandais, Espagnol, Néerlandais, Papiamento, Polognais, Portugais, Twi

  • Motángo eleki monene: 42 335

  • Bato oyo bazwaki batisimo: 212

  • Bandeko oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge: 6 000

  • Bafiliale oyo ebengisamaki: Australasie, Belgique, Brésil, Canada, Colombie, Corée, États-Unis, Indonésie, Portugal, Roumanie, Afrika ya Sudi, Suriname

  • Makambo ya malamu oyo ebendaki likebi ya bato: Ndeko mobali moko oyo asalaka bopɛto na lopango ya Jaarbeurs Hallencomplex. Mokonzi na ye ya mosala abengaki ye mpe ayebisaki ye boye: “Na ntango oyo, ezali na bato oyo basengeli kosala makambo nyonso oyo toyokanaki, mpe na mikolo ezali koya: bakopɛtola lopango mpe bazwi bibongiseli ya kosala nyonso mpo bátika lopango na biso pɛto. Na ntembe, bakokómisa lopango oyo lisusu kitoko koleka ndenge ezalaki liboso tópesa bango nzela. Ezali kokamwisa mpenza! Namoná naino likambo ya boye te. Bapɛtolaki mpe bisika ya restora oyo basalelaka yango lisusu te! Na twalɛti, ezali na bato mibale oyo bazali kosalisa basusu; mpe soki likambo moko esalemi esika moko boye, kozanga koumela bato bazali koya kobongisa yango! Mbala ya liboso namona likambo ya boye.”

 

Bandeko basi mpe mibali ya Pays-Bas bazali na libándá ya mpɛpɔ mpo na koyamba bandeko oyo bauti na mikili ndenge na ndenge

Bandeko ya Betele bazali kopesa bandeko oyo bauti na mikili ndenge na ndenge mbote ntango bazali kosala vizite na filiale ya Pays-Bas

Ndeko mwasi oyo auti na mokili mosusu ná ndeko mwasi mosusu ya Pays-Bas bazali kobengisa mwasi moko na liyangani

Bandeko basi mpe mibali bazali kolanda programɛ ya liyangani na ndako monene ya Jaarbeurs Hallencomplex. Ezalaki mpe na bisika mosusu mitano epai bandeko bazalaki kolanda liyangani yango

Mwa ndambo ya bandeko ya sika 212 bazali kozwa batisimo

Bandeko basi mpe mibali bazali kolanda na likebi nyonso mpe bazali kozwa banɔti na ntango ya liyangani

Bandeko oyo bauti na mikili mingi bazali kopesana bakado

Ndeko Geoffrey Jackson, ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, azali kosala diskur ya nsuka na mokolo ya lomingo

Bamisionɛrɛ mpe bandeko oyo bamipesa kaka na mosala ya ntango nyonso bazali kopesa mbote ya nsuka na bayangani na nsuka ya liyangani