Lakisá makambo oyo ezali na kati

Na lobɔkɔ ya mwasi: Oyo ezali fɔtɔ ya Cecilia Alvarez ntango azalaki na mbula 10 mpe basalaki ye lipaso ya mbala 17; Na lobɔkɔ ya mobali: Cecilia ná baboti na ye ná leki na ye ya mwasi na sanza ya 05/2019

07/07/2019
ARGENTINE

Basalá ndeko Cecilia Alvarez lipaso mbala 43 na kati ya mbula 25, mpe batyá ye makila ata mbala moko te

Basalá ndeko Cecilia Alvarez lipaso mbala 43 na kati ya mbula 25, mpe batyá ye makila ata mbala moko te

Ndeko Cecilia Alvarez azali moto ya Argentine; abɛlaka makasi bomoi na ye mobimba. Basalaki ye lipaso ya liboso ntango azalaki na mikolo 16 ya kobotama. Na mokolo ya 18/05/1994, minganga ya Argentine babongisaki ye mbeba moko abotamaki na yango na mokuwa ya mokɔngɔ. Banda mokolo wana tii sikoyo esali mbula 25, basalá Cecilia mapaso mosusu 42, ebele na yango esalemaki ntango azalaki naino mwana. Lipaso ya nsuka basalaki ye na ebandeli ya mbula oyo mpo na kobongisa mokuwa ya lokolo ya mwasi. Ndenge moko na mapaso oyo basalaki ye liboso, oyo mpe ya nsuka esalemi malamu mpenza mpe batyaki ye makila te.

1999: Cecilia azalaki na mbula mitano na lopitalo ya bana (Juan P. Garrahan Children’s Hospital)

Cecilia alobi: “Ntango mosusu esalaka ngai mpasi komona ndenge nzoto na ngai ekóma kaka ya mapaso mpe bankisi.” Atako bongo, asalaki nyonso azala kaka na makanisi malamu mpe atyelaki Yehova motema. Lisusu, ye ná baboti na ye basalaki makasi bálanda malako ya minganga. Cecilia alobi lisusu boye: “Kobongisa nzoto na ngai liboso ya lipaso ezalaki likambo ya ntina mingi. Yango esɛngaki komɛla nkisi oyo ezali na fer, na acide folique, kotɔbɔla ngai EPO (érythropoïétine), mpe kolya biloko ndenge na ndenge oyo ebotisaka baselile ya makila mingi.”

Cecilia alobi mpe boye mpo na minganga oyo bazalaki kosalisa ye na boumeli ya bambula: “Nazwaka mosala na bango na valɛrɛ mingi, mpo ebikisi bomoi na ngai mpe lisusu bazalaki komemya ngai ntango nazalaki koboya ete bátya ngai makila.”

Ernesto Bersusky, azali monganga oyo asalisaka maladi ya mokuwa na mokɔngɔ, azwá pansiɔ

Minganga oyo bazalaki kosalisa Cecilia balobaki ete bazalaki komemya Cecilia ná bandeko oyo bazalaki koya kotala ye. Ernesto Bersusky, ye azali monganga, azalaki mokambi ya eteni oyo etalelaka maladi na mokuwa ya mokɔngɔ na lopitalo moko ya bana (Juan P. Garrahan Children’s Hospital) na Buenos Aires, ye mpe asalaki mingi ntango bazalaki kosala Cecilia lipaso ya monene na mokɔngɔ, alobi boye: “Ntango nyonso oyo nazalaki kosolola na Cecilia, namonaki ete azali na ekateli makasi, mpe namonaki ete azalaki kolimbola mateya na ye polelepolele. Nazalaki kosolola na ye mbala mingi, kolimbwela ye eloko oyo nakosala mpe kondimisa ye ete tokosalela makila te.”

Susana Ciruzzi, azali monganga, moto ya mibeko mpe moto oyo alandelaka mitinda ya bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto

Doktɛrɛ Susana Ciruzzi, oyo azali mpe moto ya mibeko mpe moko ya bato oyo balandelaka mitinda ya bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto na lopitalo ya bana (Juan P. Garrahan Children’s Hospital) alobi boye: “Batatoli ya Yehova ná minganga bazalaki kosala na boyokani mpenza. Tosalaki elongo na Batatoli ya Yehova mpe toyokanaki ete tókende liboso, tóbongola makanisi na biso mpe ndenge ya kopesa lisalisi. Na ndenge yango, tokozala na likoki ya koyeba kosalela mayele mosusu na esika ya kotya makila.”

Lisusu Cecilia azali kosepela na minganga na ye mingi mpo bayebi mosala. Azali mpe kondima ete, lisungi ya bandeko basi mpe mibali esalisaki ye mingi, alobi boye: “Nazali kopesa matɔndi na bandeko oyo basalaka na Komite ya boyokani elongo na minganga (CLH) mpe na bandeko oyo bakendeke kotala bato ya maladi (GVM). Atako bandeko yango bazali na mabota mpe na mikumba mosusu, bazali kopesa ntango na bango mpe makasi na bango na motema moko. Ntango nyonso oyo nazalaka na mposa na bango bazalaka wana. Nazali mpenza kosepela na lisalisi na bango.”

Atako ndeko Cecilia ayokaka mpasi ntango nyonso mpe afandaka na kiti ya bibɔsɔnɔ esali sikoyo mbula 25, bato bayebi ete azali na makanisi ya malamu. Yango wana alobaka ete: “Nandimi ete bampasi oyo esalisi ngai nabongisa bomoto na ngai mpe nakolisa bizaleli ya bokristo.”

Na sanza ya 07/2019: Cecilia azali na mosala ya kosakola elongo na ndeko mwasi moko oyo azali mpe mobongisi-nzela

Cecilia abakisi boye: “Nsima ya lipaso mosusu ya monene oyo basalaki ngai, ndeko moko ya CLH ayaki kotala ngai mpe atángelaki ngai Masese 10:22: ‘Lipamboli ya Yehova​—yango nde ekómisaka moto mozwi, mpe abakisaka mpasi ata moko te na yango.’ Nakobosana vɛrsɛ oyo mokolo moko te mpe nakokoba kosepela na yango.”

Na mokolo ya 01/05/2019, ndeko na biso Cecilia azwaki lipamboli ya monene mpenza, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Emonani polele ete Yehova abɔndisaki mpe apesaki ndeko na biso makasi. Yango wana, ye ná bandeko mosusu bazali kosakola, na esengo mpenza, nsango oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe mpo na kobɔndisa bato.

Tozali na elikya ete Yehova akokoba kobɔndisa biso na mikakatano ndenge na ndenge tozali kokutana na yango ndenge abɔndisaki Cecilia.​—2 Bakorinti 1:4.