Lakisá makambo oyo ezali na kati

Betele ya sika ya Cameroun ezali na ndako moko mpo na babiro mpe bandako minei mpo na kolala

13/02/2020
CAMEROUN

Bandeko ya Betele ya Cameroun bakɔti na bandako na bango ya sika

Bandeko ya Betele ya Cameroun bakɔti na bandako na bango ya sika

Na mokolo ya 20/01/2020, libota ya Betele mobimba ya Cameroun ekendeki kokɔta na bandako na yango ya sika oyo ezali na Logbessou, na nɔrdi-ɛsti ya engumba Douala. Sikoyo, bandeko 59 bazali kofanda mpe kosala kuna, nzokande, bandeko mosusu 71 oyo bautaka na bandako na bango bakendeke mpe kosala kuna.

Bandeko bazali kokitisa biloko na Betele ya sika

Betele ya kala ya Cameroun ezalaki na Bonaberi, na wɛsti ya engumba Douala. Bandeko babongisaki bandako yango na 1993, nsima ya kolongola epekiseli oyo batyelaki ebongiseli na biso na mboka mobimba na boumeli ya mbula 23. Banda 1993, motángo ya basakoli na Cameroun ebakisami mingi, elongwe na 19 268 ekómi koleka 52 000, mpe lelo oyo filiale yango ezali kobongola mikanda na minɔkɔ 29. Bokoli yango etindaki bandeko báluka esika ya sika, mpo bábakisa bandako mosusu. *

Bandeko ya Betele oyo basalaka na comptabilité bazali kosala na babiro ya sika

Betele yango ekozala mpe na mwa musée, oyo ekofungwama na nsuka ya mobu 2020. Musée yango ekolobela misala ya Betele mpe ndenge mosala ya kosakola ezali kosalema na Cameroun, na Guinée équatoriale, mpe na Gabon.

Maloba ya kotombela bato boyei malamu na Anglais mpe na Français

Ndeko Stephen Attoh, oyo azali na Komite ya filiale ya Cameroun, alobi boye: “Ntango tokɔtaki na bandako na biso ya kitoko mpe ya sika, ezalaki lokola nde tozali kolɔta ndɔtɔ. Tozali na ekateli ya kopesa Yehova nyonso oyo tokoki na esika yango ya kitoko. Yehova asaleli biso makambo ya minene, tozali kopesa ye matɔndi mpenza.”​—Nzembo 145:7.

^ par. 3 Longola Cameroun, betele yango ezali kotambwisa mosala ya kosakola na Guinée-équatoriale mpe na Gabon, ezali kotalela mosala ya masangá 667