Lakisá makambo oyo ezali na kati

20/6/2019
MEXIQUE

Monterrey, Mexique—Liyangani oyo esangisaka mikili mingi ya Batatoli ya Yehova 2019 “Bolingo esilaka soki moke te”!

Monterrey, Mexique—Liyangani oyo esangisaka mikili mingi ya Batatoli ya Yehova 2019 “Bolingo esilaka soki moke te”!
  • Dati: 07-09/06/2019

  • Esika: Stade ya BBVA Bancomer na Monterrey, na ekólo Mexique

  • Programɛ esalemaki na minɔkɔ oyo: Anglais, Elobeli ya bababa ya Mexique, Espagnol

  • Bisika oyo balandaki programɛ ya liyangani yango: Bisika 38 na bikólo 6 ekeseni (Costa Rica, Guatemala, Honduras, Mexique, Nicaragua, mpe Panama)

  • Motángo eleki monene: 39 099

  • Bato oyo bazwaki batisimo: 393

  • Bandeko oyo bauti na mikili ndenge na ndenge: 4 682

  • Bafiliale oyo ebengisamaki: Argentine, Brésil, Colombie, Espagne, États-Unis, France, Italie, Japon, Paraguay, Pays-bas, Pérou

  • Likambo oyo ebendaki likebi ya bato: Roberto Valero, momonisi ya mokonzi ya engumba Guadalupe, akendaki kotala esika ya liyangani na mokolo ya pɔsɔ. Longola makambo mosusu, alobaki boye: “Guvɛrnema na biso ezali na mokano ya kotya kimya mpe kobatela bato. Mpe bino, Batatoli ya Yehova, bopesi mpenza mabɔkɔ mpo na yango mpo bazali bana-mboka malamu. Bato nyonso ya engumba bayebi ete bozali bato malamu.”

 

Bandeko basi mpe mibali bazali koyamba bandeko oyo bauti na mikili ndenge na ndenge na Aéroport International ya Monterrey

Bandeko oyo bauti na mikili ndenge na ndenge bakómi na esika ya liyangani oyo ezali na ngomba moko kitoko oyo babengi Mont Silla ndenge ezali komonana na nsima

Ndeko Mark Sanderson, ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, azali kosala diskur ya nsuka ya mokolo ya mitano

Moto moko azali kozwa batisimo na mokolo ya pɔsɔ na pisini moko oyo ebongisamaki mpo na liyangani

Bandeko oyo bauti na mikili ndenge na ndenge bazali kolanda na likebi nyonso programɛ ya liyangani

Bandeko oyo bamipesá kaka mpo na mosala ya ntango nyonso oyo bayei na liyangani bazali kopɛpa mabɔkɔ mpo na kopesa bayangani mbote na mokolo ya nsuka ya liyangani

Libota moko oyo euti na Apodaca, na Mexique, esimbi elamba oyo bakomi: ‘Tolingaka bino’

Ndeko moko oyo auti na mboka mopaya mpe ndeko mwasi moko ya mboka yango bazali na mosala ya kosakola na Monterrey

Bandeko oyo bauti na mikili ndenge na ndenge bazali kosepela na mabina moko ya bato ya nɔrdi ya Mexique oyo babengaka Polka Norteña

Bandeko basi bazali kobina mabina ya mboka na bango na etúká Jalisco, na Mexique