Lakisá makambo oyo ezali na kati

6/6/2019
VÉNÉZUÉLA

Venezuela bansango ya sika: Mosala ya Batatoli ya Yehova ezali kokoba atako mikakatano ezali kosila te

Venezuela bansango ya sika: Mosala ya Batatoli ya Yehova ezali kokoba atako mikakatano ezali kosila te

Bomoi mpe nkita ezali se kobeba na Venezuela. Mpo na nzala mpe komata ya ntalo ya biloko, ekómi mpasi kozwa bilei, mai, esansi mpe nkisi. Bazali na mokakatano ya kura, yango wana ekómi mpasi kozwa bilei mpo bato bazali na likoki te ya kobatela biloko na frigo. Bato bazali kobanga mingi mpo bazali koboma bato.

Atako mikakatano wana ya mpasi, basakoli koleka 136 500 na Venezuela bazali kokoba kosakola na molende. Na ndakisa, na sanza ya 01/2019, atako ezalaki na basakoli moke 7 000 na mboka yango soki tokokanisi na mbula oyo eleki, basalaki bangonga koleka 90 000 na mosala ya kosakola. Na sanza ya 04/2019, bayekolaki Biblia na bato koleka 195 600. Motángo ya babongisi-nzela ya sanza na sanza elekaki 30 000. Na ntango ya kampanye ya kobengisa bato na Ekaniseli ya liwa ya Kristo, motángo ya babongisi-nzela basungi ekómaki 20 400. Na ntembe te milende wana nde esalaki ete bato soki 471 000 báyangana na Ekaniseli​—koleka mbala misato mitángo ya basakoli ya mboka yango. Lisusu, bato mingi bazali koyangana na makita ya lisangá. Ntina moko ezali ete bandeko bazali kokoba komonisa bato ete kaka nsango ya Biblia nde ekopesa solisyo oyo bakoki kotyela motema mpo na kosilisa mikakatano na bango.

Filiale ya Venezuela ezali kokoba kotambwisa mosala ya kopesa bandeko lisungi mpo bázwa biloko ya ntina oyo basengeli na yango. Sanza nyonso, na lisalisi ya bafiliale mosusu mpe makabo ya bolingo ya bandeko na mokili mobimba, filiale ya Venezuela epesi batɔni ya bilei epai ya bandeko 75 000 na masangá 1 595.

Bandeko na biso na Venezuela bazali kokutana na mikakatano mingi, kasi tolendisami lokola bazali kokoba ‘kozala na esengo na Nzambe ya lobiko na biso.’​—Habakuku 3:17, 18.