Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova bazali bakristo?

Batatoli ya Yehova bazali bakristo?

 Ɛɛ. Tozali bakristo, mpo na bantina oyo:

  •   Tosalaka makasi tólanda malamumalamu mateya mpe bizaleli ya Yesu Kristo.​—1 Petro 2:21.

  •   Tondimaka ete mpo na kobika, esengeli kondimela Yesu, mpo “lobiko ezali na moto mosusu te, mpo nkombo mosusu ezali te na nse ya lola, oyo epesami na kati ya bato, oyo tosengeli kobika na nzela na yango.”​—Misala 4:12.

  •   Bato oyo bakómaka Batatoli ya Yehova babatisamaka na nkombo ya Yesu.​—Matai 28:18, 19.

  •   Tobondelaka Nzambe na nkombo ya Yesu.​—Yoane 15:16.

  •   Tondimaka ete Yesu azali Mokonzi, ete azali likoló ya mobali nyonso.​—1 Bakorinti 11:3.

 Kasi, tokeseni mingi na mangomba mosusu oyo ebengamaka mangomba ya bokristo. Na ndakisa, ndenge Biblia elobi, tondimaka ete Yesu azali Mwana ya Nzambe; azali na kati ya Bosato to Trinité te. (Marko 12:29) Tondimaka ete molimo ekufaka; ata na esika moko te Biblia emonisi ete Nzambe anyokolaka bato na lifelo ya mɔtɔ; tondimaka mpe te ete baoyo bakambaka mangomba basengeli kozala na batitre ya lokumu.​—Mosakoli 9:5; Ezekiele 18:4; Matai 23:8-10.